Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova mpe bapesaka dime?

Batatoli ya Yehova mpe bapesaka dime?

 Te, topesaka dime te; mbongo oyo tosalelaka mosala na biso eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko kozanga ete bankombo na bango eyebana. Dime ezali nini? Mpe mpo na nini Batatoli ya Yehova bapesaka dime te?

 Mobeko ya kopesa dime, elingi koloba moko ya bandambo zomi ya biloko oyo ozali na yango, ezalaki na kati ya Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele ya kala. Nzokande, Biblia emonisi polele ete Mibeko yango, kati na yango ‘mitindo ya kokɔngɔla moko ya bandambo zomi’ etali bakristo te.​—Baebre 7:5, 18; Bakolose 2:13, 14.

 Na esika ya kopesa dime mpe makabo mpo esɛngami bongo, tolandaka ndakisa ya bakristo ya liboso mpe tosimbaka mosala na biso ya kosakola na lolenge mibale: biso nyonso tosakolaka kozanga ete báfuta biso mpe totyaka makabo.

 Na ndenge yango, tolandaka etinda oyo Biblia epesi bakristo ete: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 9:7.