Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basembolaka mateya na bango mosusu?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basembolaka mateya na bango mosusu?

 Tosalelaka ntango nyonso Biblia mpo na kozwa mateya na biso, yango wana tosembolaka mateya yango ntango boyebi na biso ya Biblia ebakisami. a

 Kosala bongo eyokani makanisi oyo ezali na Masese 4:18, oyo elobi: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Ndenge kaka kotana ya ntɔngɔ epesaka pole mokemoke, Nzambe mpe apesaka boyebi ya solo na ye mokemoke mpe na ntango oyo alingi. (1 Petro 1:10-12) Ndenge Biblia esakolaki, asali ete likambo yango ekende mbangumbangu “na ntango ya nsuka.”​—Danyele 12:4.

 Bambongwana yango esengeli te kokamwisa to kobangisa biso. Ata mpe bato ya kala oyo bazalaki kosambela Nzambe bazalaki na makanisi mpe bilikya oyo ekokisamaki te mpe esɛngaki bábongisa makanisi na bango.

  •   Moize amibimisaki lokola mosikoli ya ekólo Yisraele mbula 40 liboso ntango oyo Nzambe atyaki ekoka.​—Misala 7:23-25, 30, 35.

  •   Bantoma bazalaki kokanga ntina te ya esakweli oyo etali liwa mpe lisekwa ya Masiya.​—Yisaya 53:8-12; Matai 16:21-23.

  •   Bakristo mosusu ya liboso bazalaki na makanisi ya libunga mpo na koya ya “mokolo ya Yehova.”​—2 Batesaloniki 2:1, 2.

 Nzambe asalisaki bango bálongola makanisi wana ya libunga mpe tobondelaka ye akoba kosala mpe bongo mpo na biso.​—Yakobo 1:5.

a Tobombaka te mateya oyo tobongisi ntango boyebi na biso ya Biblia ebakisami. Kutu, tokomaka mpe tobimisaka yango. Na ndakisa, talá “Makambo oyo tosemboli na mateya na biso” na mikanda oyo ezali na Internet.