Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bazali kinzambinzambi ya ba Américains?

Batatoli ya Yehova bazali kinzambinzambi ya ba Américains?

 Biro oyo etambwisaka mosala na biso na mokili mobimba ezali na États-Unis. Atako bongo, lingomba na biso ezali kinzambinzambi ya ba Américains te; mpo na nini?

  •   Kinzambinzambi ezali mwa lingomba oyo ebimi na lingomba moko ya monene. Biso Batatoli ya Yehova toutá na lingomba moko te. Kasi, tomonaka ete tozongisá bokristo ndenge ezalaká na siɛklɛ ya liboso.

  •   Batatoli ya Yehova basakolaka na mikili koleka 230. Ata soki tofandi wapi, tomonisaka bosembo na biso libosoliboso epai ya Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo, kasi te epai ya guvɛrnema ya États-Unis to ya ekólo mosusu.​—Yoane 15:19; 17:15, 16.

  •   Mateya na biso nyonso eutaka na Biblia, kasi te na mikanda ya mokonzi ya lingomba moko boye na États-Unis.​—1 Batesaloniki 2:13.

  •   Tolandaka ndakisa ya Yesu Kristo, kasi te ya moto moko boye.​—Matai 23:8-10.