Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bateyaka bato ya mangomba mosusu?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bateyaka bato ya mangomba mosusu?

 Tomonaka ete bato ya mangomba mosusu basepelaka kosolola makambo ya Nzambe. Kasi, lokola toyebi ete moto na moto azali na bonsomi ya kondima makambo oyo alingi, totindaka moto na makasi te ete andima mateya na biso.

 Ntango tosololaka na bato makambo ya Nzambe, tosalaka nyonso mpo tómonisa “boboto” mpe “limemya makasi,” ndenge Biblia esɛngi biso. (1 Petro 3:15) Toyebaka ete bato nyonso te nde bakondima nsango na biso. (Matai 10:14) Kasi, soki tosololi naino na moto te, tokoki koyeba te soki akondima nsango na biso to akondima yango te. Toyebaka mpe ete bomoi ya moto ekoki kobongwana.

 Na ndakisa, ntango toyei kotala moto moko lelo, akoki kozala na mosala mingi, kasi andimi koyamba biso mokolo mosusu. Bato mosusu bakoki kokutana na mikakatano to mpe likambo moko ya mpasi oyo ekoki kobongola bomoi na bango; yango ekoki kotinda bango bákóma kosepela na nsango ya Biblia. Yango wana, tozongelaka bato mbala ebele.