Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bakanisaka ete kaka bango nde lingomba ya solo?

Batatoli ya Yehova bakanisaka ete kaka bango nde lingomba ya solo?

 Moto oyo asambelaka na ndenge ya solo asengeli koyeba soki lingomba oyo aponá esepelisaka Nzambe mpe Yesu. Soki te, ntina nini komipesa na lingomba yango?

 Yesu Kristo andimaki te likanisi oyo elobaka ete mangomba to banzela oyo ememaka na lobiko ezali ebele. Alobaki nde ete: “Porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:14) Batatoli ya Yehova bandimaka ete bamoná nzela yango. Soki te, balingaki koluka lingomba mosusu.