Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Nazalaki na mituna mingi kasi ezangaki biyano”

“Nazalaki na mituna mingi kasi ezangaki biyano”
  • Abotamá na: 1976

  • Ekólo: Honduras

  • Bomoi na ye ya kala: Pastɛrɛ ya eglize

NDENGE NAZALAKI

 Nabotamaki na engumba La Ceiba, na Honduras, nazalaki mwana ya nsuka na libota ya bana mitano mpe nazalaki kaka ngai moko mwana mobali. Mpe lisusu nazalaki kaka ngai moko mokufi-matoi na libota. Tozalaki kofanda na kartye oyo ezalaki na makama mingi, mpe tozalaki mpenza babola. Bomoi ekomaki lisusu mpasi mingi ntango papa akufaki na likama moko oyo akutanaki na yango na mosala ntango nazalaki na mbula 4.

 Mama asalaki nyonso mpo na kosunga ngai na bandeko na ngai ya basi, kasi na bantango mosusu azalaki kozanga mbongo mpo na kosombela ngai bilamba. Soki mbula ebɛti, malili ezalaki makasi mpe nazalaki na bilamba ya malili te.

 Ntango nazalaki kokola, nayekolaki elobeli ya bababa ya Honduras (LESHO), yango esalisaki ngai mpo nasololaka na bababa mosusu. Kasi mama ná bandeko na ngai ya basi bayebaki elobeli yango te, kasi bazalaki kosala bajɛstɛ kaka ya bongobongo soki balingi koloba na ngai likambo. Atako bongo, mama azalaki kolinga ngai mpe azalaki kobatela ngai na makama. Kaka na mwa bajɛstɛ azalaki kosala, ateyaki ngai naboya makambo mabe lokola komɛla makaya mpe masanga oyo elangwisaka makasi. Yango wana, nazali na esengo mpo namibebisaki te na biloko wana ya mabe.

 Na bolenge, mama azalaki komema ngai na eglize ya Katolike, kasi nazalaki kosimba eloko te mpo moto moko te ayebaki koloba na elobeli ya bababa. Ezalaki kolɛmbisa ngai, yango wana ntango nakómaki na mbula 10 natikaki kokende. Kasi, nazalaki kaka na mposa ya koyeba makambo mingi etali Nzambe.

 Na 1999, ntango nakómaki na mbula 23, nakutanaki na mwasi moko oyo autaki na États-Unis mpe azalaki mondimi ya Lingomba ya Évangélique. Ateyaki ngai makambo ya Biblia mpe alakisaki ngai elobeli ya bababa ya Amerika (ASL). Nasepelaki mingi na makambo oyo nayokaki na Biblia, yango wana nazwaki ekateli ya kokóma pastɛrɛ. Mpo na yango, nakendaki na Puerto Rico mpo na kozwa formasyo mpo na koteya bababa. Ntango nazongaki na La Ceiba na 2002, na lisalisi ya baninga na ngai mosusu nafungolaki eglize moko mpo na bababa. Na nsima, Patricia oyo azalaki moko ya baninga na ngai, akómaki mwasi na ngai.

 Lokola nazalaki pastɛrɛ, nazalaki koteya na elobeli ya bababa (LESHO), kolakisa masolo ya Biblia na bafoto, mpe kolimbwela bango masolo yango mpo bákanga ntina. Nazalaki mpe kokende kotalaka bababa na engumba esika nazalaki mpo na kosalisa bango na mikakatano na bango. Nasalaki kutu mibembo lokola misionɛrɛ na États-Unis mpe na Zambie. Kasi mpo na koloba solo, nayebaki naino makambo mingi te na Biblia. Nazalaki koteya kaka makambo oyo bayebisaki ngai mpe makambo oyo nazalaki komona na bafoto. Kasi, nazalaki mpenza na mituna mingi oyo ezangaki biyano.

 Mokolo mosusu, mwa baninga na ngai na eglize bakómaki kopanza bansango ya lokuta na nkombo na ngai. Balobaki ete nazalaki molangwi masanga mpe nazalaki kobima na mwasi mosusu. Yango esepelisaki ngai te mpe nayokaki nkanda mpenza. Eumelaki te, ngai ná Patricia tolongwaki na lingomba yango.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Batatoli ya Yehova bazalaki koya mbala mingi epai na biso, kasi tozalaki kobengana bango. Kasi, nsima ya kotika lingomba na biso, Patricia andimaki koyekola Biblia na babalani oyo bazalaki Batatoli ya Yehova, Thomas ná Liccy. Bakamwisaki ngai ndenge bayebaki elobeli ya bababa atako bazalaki bababa te. Eumelaki te ngai mpe nakómaki koyekola.

 Toyekolaki mwa basanza mpe tosalelaki bavideo na elobeli ya bababa ya Amerika. Kasi ntango baninga mosusu bayebisaki biso ete Batatoli ya Yehova basambelaka bato, tokataki boyekoli. Atako Thomas alakisaki ngai bilembeteli mingi oyo emonisaki mpenza ete Batatoli ya Yehova balandaka bokonzi ya bato te, nandimelaki ye kaka te.

 Mwa basanza nsima na yango, Patricia akómaki na mitungisi ya makanisi, mpe abondelaki Nzambe ete atinda Batatoli ya Yehova baya lisusu kotala ye. Mwa moke na nsima, moninga moko ya kartye oyo azalaki Motatoli ya Yehova ayaki kotala Patricia, mpe Patricia asɛngaki ye ayebisa Liccy aya kotala ye. Liccy azalaki mpenza moninga ya solo. Azalaki koya kotala Patricia pɔsɔ nyonso mpo na kolendisa ye mpe koyekola na ye Biblia. Ata bongo, nazalaki kaka na bantembe mpo na Batatoli ya Yehova.

 Na 2012, Batatoli ya Yehova basalaki kampanye moko ya sipesiale mpo na kolakisa bato video Okosepela koyeba solo? na elobeli ya bababa (LESHO). Liccy amemelaki biso video yango. Ntango natalaki video yango, nayokaki mawa komona ete mateya mingi oyo nazalaki koteya na ndakisa lifelo ya mɔtɔ mpe molimo ekufaka te, ezalaki te na Biblia.

 Pɔsɔ oyo elandaki, nakendaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova mpo na kosolola na Thomas. Nayebisaki ye ete nalingaki koteya bababa solo ya Biblia, kasi te lokola Motatoli ya Yehova. Likanisi na ngai ezalaki ya kosala lingomba na ngai ya sika mpo na bababa. Thomas apesaki ngai longonya mpo na molende na ngai, kasi alakisaki ngai Baefese 4:5, oyo emonisi ete lisangá ya Bokristo ya solo esengeli kozala na bomoko.

 Thomas apesaki ngai mpe video Batatoli ya Yehova​—Kondima emonani na misala, Eteni 1: Balongwe na molili na elobeli ya bababa ya Amerika. Video yango emonisaki ndenge etuluku moko ya mibali bayekolaki malamumalamu Biblia mpo na koyeba mateya ya ntina oyo ezali na kati. Ntango nazalaki kotala video yango nayokaki ndenge mibali yango bamiyokaki. Ndenge moko na bango, ngai mpe nazalaki koluka solo. Video yango endimisaki ngai ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo mpo makambo nyonso oyo bandimaka eutaka nde na Biblia. Na yango nazongelaki koyekola Biblia, mpe na 2014, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI

 Nalingaka lisangá ya Batatoli ya Yehova mpo ezali pɛto, kaka ndenge Nzambe mpe azalaka pɛto. Basaleli na ye bazali pɛto na maloba mpe pɛto na bayokani na bango na bato mosusu. Bazali bato ya kimya mpe balendisanaka. Batatoli ya Yehova bazali na bomoko mpe bango nyonso bateyaka solo ya Biblia kaka moko, ezala na mboka nini to na monɔkɔ nini.

 Nasepelaki mingi ndenge nayekolaki makambo ya solo mpenza oyo Biblia eteyaka. Na ndakisa, nayekolaki ete Yehova azali Mozwi-na-Nguya-nyonso, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. Alingaka bato nyonso ezala mpe bababa. Bolingo ya Nzambe ezali na motuya mingi mpo na ngai. Nayekolaki lisusu ete mabele ekokóma paradiso moko kitoko mpe ete tokozala na likoki ya kozala na bomoi seko mpe na nzoto makasi. Nazali kozela na mposa makasi mpenza mokolo makambo nyonso wana ekokokisama!

 Ngai ná Patricia tosepelaka mingi kosolola na bababa makambo ya Biblia. Tozali sikoyo koyekola Biblia na bato misato ya lingomba na biso ya kala. Sikoyo nazali lisusu na bantembe te mpo na makambo oyo nazali koteya, ndenge ezalaki ntango nazalaki pastɛrɛ. Nazwaki biyano na mituna na ngai nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.