Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kobongola na maloba oyo bakomaka te

Kobongola na maloba oyo bakomaka te

Batatoli ya Yehova babongolá mikanda ya Anglais oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 900. Kobongola makomi moko na monɔkɔ oyo bakomaka ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi elobeli ya bajɛstɛ ebakisaka lisusu mosala yango. Bababa mingi basalelaka mabɔkɔ mpe bajɛstɛ ya bilongi mpo na kobimisa makanisi na bango, yango wana baoyo babongolaka na elobeli ya bajɛstɛ bakómisaka makomi yango bavideo. Na ndenge yango, Batatoli ya Yehova babongolá mikanda yango na bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ koleka 90.

Banani babongolaka?

Ndenge moko na babongoli mosusu nyonso, baoyo babongolaka na elobeli ya bajɛstɛ bayebaka elobeli yango malamu mpenza. Mingi na bango bazali bababa mpe basalelaka elobeli yango banda bomwana to bamosusu bayokaka kasi bakolá na bato mosusu ya libota oyo bazali bababa. Babongoli bazali mpe bayekoli ya Biblia ya molende.

Babongoli ya sika bazwaka formasyo oyo esengeli mpo na malako etali kobongola. Na ndakisa, Andrew alobi boye: “Atako nakɔtá kelasi ya bababa ntango nazalaki kokola mpe nasalelaka elobeli ya bajɛstɛ, formasyo yango esalisi ngai nayeba gramɛrɛ ya elobeli yango. Babongoli mosusu balakisaki ngai ndenge ya kobongisa elobeli na ngai ya bajɛstɛ, bajɛstɛ ya elongi mpe bamuvema ya nzoto mpo nabimisa makanisi na bosikisiki.”

Kobongola malamu mpenza

Babongoli basalaka na ekipi. Mokomoko na bango akokisaka mokumba ya sikisiki, mosusu abongolaka, mosusu mpe atalelaka makambo oyo babongoli mpe mosusu atángaka makambo yango. Na nsima, soki esengeli, mwa etuluku ya bababa ya bisika ndenge na ndenge mpe ya mabota ekeseni batalelaka lisusu makambo oyo ebongolami. Babongoli batalelaka makanisi oyo bababa yango bapesi mpo bábongisa lisusu makambo oyo babongoli. Yango esalisaka babongoli bátala soki bajɛstɛ ya mabɔkɔ to ya elongi ezalaka mpenza bongo mpe nsango oyo ezali na video oyo basilisi kobongola ezali sikisiki mpe polele.

Ekipi ya babongoli na monɔkɔ ya bajɛstɛ ya Finnois bazali kolobela makomi oyo balingi kobongola

Mbala mingi baoyo babongolaka na elobeli ya bajɛstɛ bakendaka makita na masangá ya elobeli yango. Bayekolaka mpe Biblia elongo na bababa oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Na ndenge yango, babongoli bayebaka ndenge elobeli yango ezali kolobama.

Mobongoli moko ya elobeli ya bajɛstɛ na Brésil azali kokɔtisa libongoli ya liboso na video

Mpo na nini milende mingi boye?

Biblia elobi ete bato ya “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bakondima nsango ya libɔndisi mpe ya elikya. (Emoniseli 7:9) Na kati ya bato yango ezali na baoyo basalelaka elobeli ya bajɛstɛ mpo na kosolola.

Babongoli basepelaka kosalela ntango mpe mayele na bango na mosala wana ya ntina mingi. Mobongoli moko na nkombo Tony, alobi boye: “Lokola nazali baba, nayebi mikakatano oyo bababa bazalaka na yango. Nazalaki ntango nyonso na mposa ya kosolola na bababa mingi mpo na koyebisa bango elikya ya solosolo oyo ezali na Biblia.”

Amanda, oyo asalaka mpe na ekipi ya kobongola na elobeli ya bajɛstɛ, abakisi boye: “Namonaka ete mosala na ngai ezali kobota mpenza mbuma ndenge nazali kobongola mikanda oyo ezali kosalisa bababa báyeba nsango ya Biblia koleka na mosala oyo nazalaki kosala liboso.”

Ndenge nini okoki komona video na elobeli na yo ya bajɛstɛ?

Etape mokomoko na esika balakisi ndenge ya “komona makambo etali elobeli ya bajɛstɛ” ekosalisa yo omona bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ na site jw.org.