Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kopesa mibange elikya mpe kobɔndisa bango

Kopesa mibange elikya mpe kobɔndisa bango

Ndenge moko na bikólo mingi, motángo ya mibange ezali mpe kobakisama na Australie. Mibange mosusu bakendaka kofanda na bandako ya mibange, epai baoyo basalaka kuna basalisaka bango na bamposa na bango ya mokolo na mokolo mpe bakipaka sante na bango.

Kasi, mibange mingi oyo bafandaka na bandako yango bazalaka mpe na mposa ya lisungi ya ndenge mosusu. Na bantango mosusu bakoki komitungisa, komiyoka lokola bazangi moto to basundoli bango. Batatoli ya Yehova bapesaka mibange yango elikya mpe libɔndisi ntango bakendaka kotala bango pɔsɔ nyonso na bandako mibale ya mibange na Portland, engumba moko na etúká ya Victoria, na Australie.

Masolo ya Biblia oyo ebongisami mpo na mibange oyo bafandaka na bandako yango

Batatoli ya Yehova ya mboka yango bakutanaka na etuluku ya mibange oyo bafandaka na bandako yango mpo na kosolola masolo ya Biblia, na ndakisa makambo ya ntina oyo elekaki na bomoi ya Yesu. Jason, alobi boye: “Totángelaka mibange bavɛrsɛ ya Biblia mpe na nsima tolobelaka makambo yango ná bango.” Lokola mingi na bango babɛlaka, Batatoli ya Yehova bayebisaka bango mpe elaka oyo Nzambe apesi ya kolongola maladi mpe liwa mpo bázwa elikya mpe bálendisama.

Tony, Motatoli ya Yehova moko oyo afandaka kuna, alobi boye: “Tobandaki naino kosala vizite ya miniti 30, kasi mibange yango balingaki tóumela lisusu. Yango wana tokómi sikoyo kolekisa ngonga moko ná bango atako moko na bango alobaki ete akosepela tósolola nde na boumeli ya ngonga mibale!” Lokola mibange yango mosusu bakufá miso, batambolaka te to bakokaka te kotombola eloko, Batatoli ya Yehova basalisaka bango na boumeli ya ngonga oyo basololaka na bango mpe balendisaka bango bápesaka makanisi ntango bazali kosolola soki likoki ezali.

Na vizite yango, Batatoli ya Yehova bayembaka banzembo ya kosanzola Nzambe elongo na mibange yango mpe mbala mingi mibange balingaka báyemba lisusu. John, * mobange moko oyo afandaka kuna, alobaki boye: “Tosepelaka na miziki boyaka na yango. Esalisaka biso tóyeba Nzambe mpe tómemya ye.” Judith, mobange oyo miso ekufá, akangá na motó maloba nyonso ya banzembo oyo alingaka mingi!

Batatoli ya Yehova balukaka koyeba soki mobange mokomoko azali malamu. Brian, moto moko oyo asalaka na bandako yango, alobi ete soki mibange yango bazali kobɛla, Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bango na bashambre na bango. “Totindelanaka bamesaje mpo na koyeba soki bazali malamu. Na bantango mosusu tozongaka kotala bango mokolo mosusu mpo na koyeba soki baoyo babɛlaki bakómi mwa malamu.”

“Nzambe nde atindi bino epai na biso”

Mibange mingi oyo bafandaka na bandako yango basepelaka na bavizite yango. Peter, oyo ayanganaka na masolo yango pɔsɔ nyonso, alobi boye: “Nazelaka yango na motema moko.” Judith ayebisaka baoyo bakipaka ye boye: “Lelo mercredi! Bóbongisa ngai mpo nakende na boyekoli ya Biblia. Naboyi kozala na retare!”

Mibange yango basepelaka na makambo bazali koyekola mpe bamiyokaka ete bapusani lisusu koleka penepene ya Nzambe. Nsima ya kolobela liteya moko ya Yesu, Rober, mobange moko, alobaki boye: “Naino nakangá ntina ya vɛrsɛ wana te. Sikoyo nde nakangi ntina!” David ayekolaki ntina ya kobondelaka; alobi boye: “Esalisi ngai nasala boninga na Nzambe mpe akóma moto ya solo na miso na ngai.”

Mibange oyo bafandaka na bandako yango basepelaka koyeba makambo etali elikya oyo Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya. Lynette, oyo afandaka mpe kuna, alobaki na Batatoli ya Yehova boye: “Matɔndi ndenge bomemeli biso libɔndisi wana ya Biblia.” Mobange mosusu alobaki mpe boye: “Nzambe nde atindi bino epai na biso!”

Margaret asepelaki mingi na bavizite yango na boye ete akómá koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Asalaka mpenza milende ndenge akendaka makita yango mpo nzoto etungisaka ye mpe akoki kosala bamuvema mingi te. Ayebisaki Batatoli ya Yehova boye: “Bosalisi biso nyonso awa tómona ntina ya bomoi.”

‘Bozali kosala mosala malamu mpenza’

Baoyo basalaka na bandako yango ya mibange basepelaka mpe ndenge Batatoli ya Yehova bayaka kotala mibange. Anna, Motatoli ya Yehova moko ya mboka yango, alobi boye: “Bato yango balendisaka mibange básololaka na Batatoli ya Yehova mpo bamonaka ete nsima ya masolo yango mibange bakómaka na esengo.” Brian, oyo tolobelaki liboso, abakisi boye: “Bato oyo basalaka na bandako yango bazali boboto mpe bapesaka biso mabɔkɔ. Basalaka nyonso mpo na kopesa lisungi.”

Bato ya libota ya mibange yango bazali kosepela ndenge masolo yango ezali kosepelisa mibange yango. Mwana ya mobange moko oyo afandaka na bandako yango apesaki Batatoli ya Yehova longonya, alobaki na bango boye: “Oyo nde likambo kitoko bosali mpo na mama na ngai.”

^ par. 7 Topesi bango bankombo mosusu.