Lakisá makambo oyo ezali na kati

“Esika na mosala ya botongi mpo na bandeko basi”

“Esika na mosala ya botongi mpo na bandeko basi”

Ebongiseli moko ya misala ya botongi na Grande-Bretagne epesaki Batatoli ya Yehova longonya ndenge bapesaki basi formasyo ya kotambwisa mituka minene mpe bamasini oyo esalisaka na mosala ya botongi, esika batongi Biro na bango ya sika pene ya engumba Chelmosford, na etúká ya Essex. Ebongiseli moko The Considerate Constructors Scheme * (CCS) epesaki Batatoli ya Yehova bapwɛ ebele ndenge bapesaki basi formasyo na misala ya kotonga bandako mpe balobaki ete ezali “likambo ya sika.” Mpo na nini bapesi bango bapwɛ ebele ndenge wana?

Na Grande-Bretagne, basi oyo basalaka misala ya botongi bazali mingi te (13%). Ankɛtɛ moko oyo kompanyi moko na Grande-Bretagne esalaki emonisi ete bilenge basi oyo bakendaka koluka misala na bakompanyi ya botongi bazali moke mpenza. Nzokande, mingi ya baoyo basalaki mosala ya kotonga Biro ya Batatoli ya Yehova na Chelmsford bazalaki basi (40%). Motángo na bango ezalaki kutu mingi (60%) na baekipi ya kotambwisa mituka mpe bamasini ya minene.

Basi bazali kosala esika moko na mibali na Chelmsford

Nini esalisaki basi yango bálonga? Formasyo mpe lisungi oyo bazwaki nde esalisaki bango mpenza. Makambo yango mibale nde ezali na kati ya makambo oyo CCS esɛngaka. Mibeko na yango esɛngaka ete bato oyo bazali kotonga bandako bámonisa ete bazali kozwa na valɛrɛ bato na bango ya misala; elingi koloba “básala ete moto nyonso amiyoka ete bazali komemya ye, kosalela ye makambo na ndenge ebongi, kolendisa mpe kopesa ye mabɔkɔ na esika ya mosala; báluka mpe “kopesa basusu formasyo.

Kopesa basi formasyo ya kotambwisa mituka mpe bamasini ya minene

Jade, moko ya basi oyo azwaki formasyo ya kotambwisa mituka minene oyo esopaka mabanga mpe oyo etimolaka mabele; alobi boye: “Ezali kokamwisa mpenza! Nakanisaki te ete nakokoka kosala yango. Na bantango mosusu, ezalaka mosala makasi, kasi nazali kozwa formasyo ntango nyonso mpe koyekola makambo ya sika. Ndenge moko na Jade, Lucy akómi sikoyo kotambwisa mituka minene. Alobi boye: “Ntango nayaki mbala ya liboso na esika oyo ya botongi, nayebaki mosala moko te oyo ekokaki kosalisa na misala oyo. Kasi kaka na mokolo ya liboso oyo nakómaki awa, nazwaki formasyo. Kobanda wana, nasali na baekipi mitano ekeseni, yango wana nazwi formasyo mingi mpenza!”

Bazali kolakisa ndeko mwasi ndenge ya kotambwisa masini

Basi oyo bazali kosala na ekipi bazali na makoki oyo eleki kotambwisa bamasini. Eric, ndeko mobali moko oyo atambwisaki ekipi moko ya botongi; alobi boye: “Mbala mingi basi babatelaka bisaleli na bango koleka ndenge mibali basalaka mpe bayebaka mpenza soki eloko moko ezali kosala malamu te na bamasini na bango mpe bapesaka mbala moko lapolo.”

Kopesa basi mabɔkɔ na mosala ya botongi

Carl, ndeko mobali oyo azali kokamba baekipi ebele oyo esalelaka mituka mpe bamasini ya minene alobi boye: “Ndenge oyo basi bayekolaki kotambwisa bamasini ekamwisaki ngai mpenza. Na mabaku mosusu, nazalaki kopona bango bátambwisa na esika ya mibali oyo baumeli na mosala yango!”

Azali kokangisa tiyo ya plastiki na masini

Soki baoyo bazali kokamba baekipi ya mosala bazali kopesa baninga na bango ya mosala mabɔkɔ, elendisaka baoyo bazali kosala mosala. Yango nde tomoni epai ya Therese. Lokola ayebi mpenza kotambwisa masini ya monene, ayebaka ete na bisaka oyo esɛngaka kosalela bamasini ya minene, kopesana mabɔkɔ mpe kozwa bikateli etali kobatela bato ezalaka likambo ya lisɛki te. Therese alobi boye: “Ntango nayebi ete mokambi ya ekipi na biso azali kopesa biso mabɔkɔ, nasalaka mingi koleka oyo nakokaki kosala mpo namiyokaka ete bazali na konfianse na ngai. Soki nayebi ete bato bazali kosepela na mosala oyo nazali kosala mpe bazali komemya yango, namonaka ete mosala makasi nyonso wana ezali ya mpunda te!”

Abigail, ndeko mosusu ya mwasi oyo atambwisaka mituka ya minene asepelaka na lisungi oyo azwaka; alobi boye: “Mibali oyo tosalaka na bango awa bamonaka te ete nazali na nse na bango. Bazalaka pene ya kosalisa, kasi balukaka te kobɔtɔla ngai mosala. Batikaka nakoba mosala oyo nazali kosala.”

Batyaka makanisi esika moko mpe bamipesaka mpenza na mosala

Longola formasyo ya kotambwisa mituka mpe bamasini ya minene, bandeko basi na Chelmsford bazwaki mpe formasyo na misala lokola kozwa bamezire na lopango, kosalela mabele mpe biloko na ndenge oyo ebongi, kobongisa bamasini mpe kotya biloko oyo batongi-ndako bamataka ntango bazali kotonga (échafaudage). Robert, oyo asalaki elongo na basi na misala ndenge na ndenge, alobi ete basi “batyaka makanisi esika moko, bazalaka na mposa ya kosala mpe batyaka likebi na makambo nyonso ya mikemike.” Tom, ndeko mobali oyo asalaki mosala ya kozwa bamezire, abakisi boye: “Basi oyo basalaki na ekipi na ngai basalaka mosala na ndenge esengeli mpe na bokɛngi mpenza. Balingaka kosala kaka ndenge basɛngi bango.”

Ezali likambo ya kokamwa te soki Fergus, oyo akambaki ekipi moko alobi na esengo nyonso ete: “Ezali mpenza na esika mpo na basi na mosala ya botongi!”

^ par. 2 The Considerate Constructors Scheme ezali ebongiseli ya Leta te mpe mokumba na yango ezali ya kotombola mosala ya botongi na Grande-Bretagne.