Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bafɔtɔ nimero 6 ya Warwick (kobanda 03/2016 tii 08/2016)

Bafɔtɔ nimero 6 ya Warwick (kobanda 03/2016 tii 08/2016)

Na bafɔtɔ oyo, talá ndenge mosala ya kotonga biro monene ya sika ya Batatoli ya Yehova etambolaki mpe ndenge bavolontɛrɛ bapesaki mabɔkɔ na mosala yango kobanda sanza ya misato tii ya mwambe na 2016.

Fɔtɔ ya Warwick oyo basilisi kotonga (na kolanda likɔnga ya montre, kobanda na lobɔkɔ ya mobali tii na lobɔkɔ ya mwasi):

  1. Ndako ya kobongisa mituka

  2. Parkingi ya mituka mpo na baoyo bayei kosala vizite

  3. Ndako ya kobongisa biloko oyo ebebi/Parkingi ya baoyo bafandaka wana

  4. Ndako B

  5. Ndako D

  6. Ndako C

  7. Ndako A

  8. Babiro mpe bandako ya misala

16/03/2016​—Warwick

Baoyo babongisaka jardin bazali kokitisa banzete mpe bazali kotya yango esika moko. Baloni banzete ya sika koleka 1400 na Warwick.

23/03/2016​—Ndako ya kobongisa mituka

Bato ya misala na Warwick bazali kosala Ekaniseli ya Nkolo. Bango nyonso bato 384 bayangani na molulu yango, oyo Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basalaka mbula na mbula.

15/04/2016​—Warwick

Basali-mabaya bazali kotya bafɛnɛtrɛ na ndako oyo ezali na porte ya lopango. Ezali na esika yango nde bandeko ya Betele bakobanda koyamba baoyo bayei kosala vizite, kobatela biloko na bango mpe kolandela ndenge mituka ezali kokɔta to kobima.

19/04/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Papa moko ná mwana na ye ya mobali bazali kotanda tapi na kulware na etaje ya mibale. Batyaka tapi ya ndenge wana na bisika ya bato ebele mpo soki ebebi, ezalaka mpasi te kolongola yango mpe kotya mosusu.

27/04/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Basali-mabaya bazali kotya babiro oyo moto akoki kolongola mpe kotya yango esika mosusu. Ndenge bakaboli babiro yango ekosalisa badepartema ebongisa lisusu babiro yango na kolanda monene oyo balingi mpo na biro mokomoko.

10/05/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Volontɛrɛ moko azali kobongisa esika ya kotya batwalɛti mpo na baoyo bayaka kosala vizite, oyo ezali esika bayambaka bato. Na nsima nde bakotya batwalɛti yango.

26/05/2016​—Warwick

Ekipe ya baoyo bakosunga nokinoki soki likama ebimi bazali kosala ngalasisi na ndenge ya koboma mɔtɔ. Ndenge bazali kosala ngalasisi yango, ekosalisa bango bábatela bato mpe bandako ya Warwick soki likama ebimi mpe kopesa bandeko oyo basalaka mosala yango mabɔkɔ mpo mosala ezala mingi te.

30/05/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ndeko mobali moko azali koyamba bavolontɛrɛ na ndako ya liboso, esika balyaka bilei, liboso ete losambo ya liboso ya ntɔngɔ na Warwick ebanda.

31/05/2016​—Ndako ya kobongisa biloko oyo ebebi/Parkingi ya baoyo bafandaka wana

Ndeko mwasi moko azali kotya elembo moko oyo ekosalisa baoyo bayei kosala vizite báyeba nzela; bakotya bilembo yango koleka 2500.

01/06/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ndeko mobali oyo asalaka sudire azali kotya eskalye oyo ekangisi esika bayambaka bato mpe auditorium. Eloko oyo ezali kozipa mɔtɔ, oyo tozali komona na nse ya fɔtɔ yango ezali kobatela misala mikemike ya nsuka.

09/06/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ndeko moko ya ekipi oyo ebongisaka bifelo azali kosilisa mosala ya kozipa bifelo oyo ekei tii na esika oyo batyá biloko oyo bato ya vizite bakoki kotala “Kondima emonani na misala,” moko ya biloko misato oyo baoyo bayei vizite bakoki kotala yango bango moko. Biloko yango ezali komonisa motó ya likambo ya nimero mokomoko ya bafɔtɔ.

16/06/2016​—Ndako ya kobongisa mituka

Bavolontɛrɛ bazali kobongisa béton liboso ya kotya eloko oyo ekokembisa yango. Eloko yango ekembisaka béton mpe esalaka ete eumela, putulu to bilembo ya pinɛ ebebisa yango te. Yango esalaka mpe ete kobatela yango ezala mpasi te.

29/06/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ekipi moko ya basali-mabaya bazali kotanda eloko moko oyo ezali lokola plastike (auvent en fibre de verre) likoló ya ndako ya koyamba bapaya. Eloko yango ekokɔtisa pole na kati ya ndako.

29/06/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kotya bakaro na esika baoyo bayei kosala vizite bakɔtaka mpo na kotala biloko oyo batye na “Biblia mpe Nkombo ya Nzambe.”

06/07/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ndeko moko azali kotya moko ya bakiti 1018 na auditorium ya monene. Bandeko ya Betele bakobanda kosala boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na auditorium yango mpe baprograme mosusu ya elimo.

09/07/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Basali-mabaya, bato ya kura mpe basali mosusu bazali kotya pano oyo ezali kobimisa pole oyo ezali kotombela boyei malamu na baoyo bayei kosala vizite.

13/07/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Bandeko mibale oyo bapesaka baoyo bazali kotonga mabɔkɔ bamemeli bandeko oyo bazali kosala na esika oyo bayambaka bapaya mai. Mingimingi na ntango ya molunge makasi, bazalaki ntango nyonso koyebisa baoyo bazalaki kotonga ntina ya komɛla mai mingi.

19/07/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Ndeko moko azali kotya vitrine oyo bakotya Babiblia oyo ezalaka mingi te na esika bato bakotala “Biblia mpe Nkombo ya Nzambe.” Bakotya mpe Babiblia mosusu mpe biloko ya kala oyo ezali na boyokani na Biblia.

22/07/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Na lisalisi ya plan moko oyo balakisi yango na efelo, ndeko moko azali kobamba na karte makambo oyo ezali komonisa Australie mpe bisanga ya sudi-ɛsti ya Asie na esika bayambaka bapaya. Nkombo Batatoli ya Yehova ezali na efelo yango na minɔkɔ soki 700.

23/07/2016​—Babiro mpe bandako ya misala

Bandeko ya Betele bayangani na likita oyo batombeli bango boyei malamu. Likita yango ebongisami mpo na koyamba bandeko oyo bakosala na Warwick, kosalisa bango báyeba esika yango mpe kokebisa bango mpo na makama oyo ekoki kobima.

17/08/2016​—Stidio ya TV JW

Bandeko oyo bayebi mosala bazali kodiembelisa likoló ya biro eloko oyo bakotya na yango ba-projecteur. Mingi ya bisaleli ya stidio yango euti na stidio ya kala ya Brooklyn.

24/08/2016​—Warwick

Ndeko moko oyo ayebi makambo ya kura azali kotya pano ya sika ya LED na porte ya ebandeli. Na mokolo ya 01/09/2016, misala mingi ya biro monene ekómaki kosalema na Warwick.