Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge na biso ya kosalela makambo ya moto

Ndenge na biso ya kosalela makambo ya moto

KOSALELA MAKAMBO YA MOTO

Moto nyonso akoki kokɔta na site oyo mpe komona makambo mingi kozanga ete afungolisa kɔnti to ayebisa biso makambo na ye. Kasi, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosalelama kaka na bato oyo bafungolisá kɔnti, oyo basɛngaka biso makambo to batindaka baformilɛrɛ, to oyo lisangá moko ya Batatoli ya Yehova etindi makambo na bango na nzela ya jw.org. Tokosalela makambo na yo kaka soki opesi biso ndingisa. Na makambo mosusu, ata soki opesi biso lisusu ndingisa te, tokoki kozala na ntina oyo endimami na mibeko ya kokoba kosalela makambo na yo, kasi ekosɛnga ete tókokisa makambo oyo mibeko esɛngi.

Tokosalela makambo na yo oyo otindeli biso na nzela ya site oyo kaka mpo na bantina oyo tosɛngaki yo yango. Bantina yango ekoki kozala oyo:

Bakɔnti. Tokoki kosalela adrɛsi e-mail oyo opesaki ntango ofungolisaki kɔnti na site oyo mpo na koyebisa yo makambo etali kɔnti na yo. Na ndakisa, soki obosani nkombo oyo osalelaka to mot de passe na yo mpe osɛngi tósalisa yo okɔta na kɔnti na yo, tokotindela yo mesaje na adrɛsi e-mail oyo opesaki ntango ofungolisaki kɔnti na yo.

Baformilɛrɛ. Soki bomoi na yo eyokani na mateya ya Batatoli ya Yehova mpe na ndenge na bango ya kosala makambo, okoki kosalela site oyo mpo na kofungolisa kɔnti to kotinda formilɛrɛ; to mpe lisangá na bino ekoki kotinda formilɛrɛ na yo na nzela ya site oyo soki olingi kosalela Nzambe mingi lisusu. Makambo oyo ezali na formilɛrɛ ekoki kozala makambo na yo oyo yo moko otindi, to mpe bankulutu na bino to mokɛngɛli ya zongazonga na bino batindi. Tokosalela makambo yango kaka mpo na kokokisa mokano oyo otondiseli formilɛrɛ mpe mpo na kokokisa makambo mosusu oyo mosala ya biro esɛngi mpo na likambo yango; na ndakisa, kokoma makambo na yo na mokuse. Soki esengeli, mpo na kokokisa mokano oyo otondiseli formilɛrɛ, tokoki kotinda makambo oyo ezali na formilɛrɛ yango na bafiliale mosusu, na biro monene ya Batatoli ya Yehova to na bibongiseli mosusu ya ndenge wana oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mikili ndenge na ndenge. Ezala ndenge nini, bato nde batalelaka makambo oyo ezali na formilɛrɛ mokomoko mpo na kozwa ekateli, kasi masini te.

Makabo. Soki osaleli Internet mpo na kotinda mbongo na yo ya makabo, tokozwa nkombo na yo mpe makambo na yo mosusu. Mpo tózwa makabo ya moto oyo asaleli karte ya kredi, tosalelaka bakompanyi oyo bato basalelaka mpo na kotinda mbongo na nzela ya Internet, oyo eyebani mokili mobimba ete ebatelaka makambo ya moto. Tokoki kozwa makambo lokola nimero ya karte ya kredi to nimero ya kɔnti mpo likabo na yo endimama, mpe tokotinda yango na bakompanyi oyo esalaka mosala wana. Totalelaka likabo na yo na ndenge oyo ekotya kɔnti na yo na likama te, ndenge oyo eyokani na malako babengi Standard de sécurité des données de l’industrie des cartes de paiement (“PCI DSS” na Lingelesi). Ebongiseli oyo ezwi likabo na yo ekobatela bilembo ya likambo oyo esalemi na boumeli ya mbula zomi to koleka. Yango ekoki kozala dati opesaki yango, ezalaki mbongo boni mpe ndenge oyo opesaki yango. Yango ekosalisa biso tótosa mibeko ya makambo etali kobomba mbongo mpe tópesa eyano na motuna nyonso okoki kotuna biso na boumeli ya ntango yango. Tokokomela yo te mpo na kosɛnga yo makabo mosusu.

Kotuna mituna na makambo mosusu to kosɛnga boyekoli ya Biblia. Okoki mpe kosalela site na biso mpo na kotuna mituna na makambo mosusu to kosɛnga ete báyekola na yo Biblia ofele. Tokosalela makambo na yo oyo okotindela biso kaka mpo na likambo oyo osɛngi. Mpo na kopesa yo eyano, mpe soki esengeli, tokoki kotinda makambo na yo na bafiliale to bibongiseli mosusu oyo Batatoli ya Yehova basalelaka.

Bantina mosusu. Longola kofungolisa kɔnti, kotinda formilɛrɛ to kopesa likabo, okoki kotinda makambo na yo (na ndakisa, nkombo na yo, adrɛsi na yo ya posita mpe nimero na yo ya telefone) mpo na bantina mosusu. Na ntango wana, tokoyebisa polele ntina oyo tosɛngi yo oyebisa biso likambo na yo boye to boye. Tokosalela makambo na yo te mpo na bantina oyo toyebisaki yo yango polele te ntango tosɛngaki yo otindela biso yango.

Tozwaka, tobombaka mpe tosalelaka makambo yango kaka mpo na bantina oyo tosɛngaki yo yango. Longola yango, totikalaka na makambo yango ntango nyonso oyo bantina wana ekosɛnga to mpo na bantina mosusu oyo ebongi. Na makambo lokola wana, soki oboyi koyebisa biso makambo na yo oyo tosɛngi, ntango mosusu okozwa ndingisa te ya kokɔta na bisika mosusu ya site oyo to biso tokokoka te kopesa yo eyano osɛngi.

Makambo osɛngi to oyo okomi na formilɛrɛ ekokende na baordinatɛrɛ epai bakotalela likambo na yo mpe ekomonana kaka na bato oyo bazwi ndingisa mpo na kosala mosala oyo esɛngami to kobongisa baordinatɛrɛ wana. Tokoki koyebisa makambo na yo na moto mosusu te, longola kaka (1) soki esengeli kosala yango mpo na kosala oyo osɛngi mpe toyebisaki yo liboso ete tokosala bongo; (2) soki tondimisami mpenza ete esengeli koyebisa makambo yango mpo na kotosa mibeko; (3) soki bakonzi ya Leta basɛngi yango; to (4) soki esengeli kosala bongo mpo na koyeba mpe kopekisa bato oyo bakoki koyiba makambo ya bato na nzela ya ordinatɛrɛ, oyo ezali likama, to mikakatano mosusu ya tekiniki. Soki ozali kosalela site oyo, elakisi ete ondimi ete tóyebisa basusu makambo na yo kaka mpo na bantina wana. Tokoki soki moke te kotɛka makambo na yo oyo okɔtisi na site oyo, koyebisa yango moto mosusu mpo ye mpe apesa biso eloko mosusu, to kodefisa yango.

KOTINDA MAKAMBO NA YO NA MBOKA MOPAYA

Lingomba na biso esalaka na mokili mobimba na nzela ya bibongiseli ndenge na ndenge oyo totyá na bikólo ndenge na ndenge. Baordinatɛrɛ minene (serveur) mosusu oyo site na biso esalelaka ezali na États-Unis. Tokoki kotinda makambo na yo libándá ya mboka oyo ofandi, mpe bamboka epai ekokende ekoki kozala na mibeko ya kobatela makambo ya moto oyo ekeseni na oyo ya mboka oyo ofandi. Ntango tozali kotinda makambo ya moto ndenge wana, tokebaka ete tóbatela yango. Tosɛngaka na bibongiseli oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpe oyo esimbaka mosala na biso etosa malako na biso etali kobatela makambo ya moto, ata mpe mibeko ya Leta oyo etali makambo ya moto.

Kokɔta na site oyo mpe koyebisa biso makambo na yo na nzela ya Internet elakisi ete ondimi tótinda makambo na yo na bikólo mosusu ndenge touti kolimbola.

NTOMO NA YO

Ntango nyonso tozali kosalela makambo ya moto, tolandelaka ete makambo yango ezala na bosikisiki, eyokanaka na bomoi na ye ya mikolo tozali mpe na bantina oyo tozwaki yango. Na kotalela ekólo epai ofandi mpe mibeko na yango mpo na kobatela makambo ya moto, okoki kozala na ntomo oyo mpo na makambo na yo otindelaki biso:

  • Okoki kotuna ndenge tozwaka mpe tosalelaka makambo na yo na kotalela mibeko ya Leta;

  • Okoki kosɛnga ete otala makambo na yo, oboma yango to okanga nzela mpo tómona yango te, mpe osembola yango soki ezangi makambo mosusu to ezali sikisiki te;

  • Soki ozali na ntina ya kosala yango, okoki koboya tósalela makambo na yo mpe kosɛnga biso tósalela yango lisusu te.

Soki ekólo epai ofandaka etyá mibeko ya kobatela makambo ya moto mpe olingi komona makambo na yo, kosembola yango to koboma yango, okoki komona makambo etali ekólo yango na esika bakomi Kobatela makambo - Contacts.

Ntango tozwi mokanda na yo mpo na kosɛnga likambo yango, tokosɛnga yo naino opesa biso bilembeteli oyo ekoki kondimisa biso ete ezali mpenza yo mpe oyebisa biso makambo mosusu oyo ekosalisa biso tóyeba makambo na yo. Na nsima, ebongiseli oyo etalelaka makambo na yo ekotala na bosembo nyonso soki ebongi bápesa yo ndingisa oyo osɛngi. Bakoluka koyeba soki bakoki kosala likambo osɛngi kozanga ete ezala likama mpo na matomba ya ebongiseli na biso, na ndakisa, bonsomi ya losambo mpe makambo oyo ebongiseli na biso esalaka. Tokoyebisa mpe bakompanyi mosusu oyo esalisaka biso makambo oyo esengeli kobongwana.

Esengeli koyeba ete ntango mosusu makambo na yo ekoki kobomama te soki mibeko esɛngi bátalelaka yango to bábomba yango mpo na bantina mosusu. Na ndakisa, lingomba na biso elingaka kobomba libela makambo oyo emonisi ete moto azali Motatoli ya Yehova. Koboma makambo ya ndenge wana ekoki kobebisa mpamba lokumu ya mateya mpe mimeseno ya lingomba na biso. Mpo na kokokisa mposa ya moto oyo asɛngi ete makambo na ye ebomama, tosengeli kolanda oyo mibeko esɛngi biso tósala na oyo etali koyebisa to kotikala na makambo ya moto. Okoki mpe koyebisa ebongiseli ya Leta oyo etalelaka kobatela makambo ya moto mpo na ndenge site na biso ezali kotalela makambo oyo otindaki.