Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Baroma 10:13​—‘Kobelela nkombo ya Nkolo’

Baroma 10:13​—‘Kobelela nkombo ya Nkolo’

 “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”​—Baroma 10:13, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Zambi, elobi lisusu ete, Moto na moto oyo akobeela nkombo na Nkolo akobika.”​—Baloma 10:13, Biblia haut fleuve.

Ndenge Baroma 10:13 elimbolami

 Nzambe aponaka bilongi te, mpe apesi bato nyonso libaku ya kobika mpe ya kozwa bomoi ya seko, yango etaleli te ekólo, loposo, bakelasi oyo batángá, ezala bazali bazwi to babola. Kasi, mpo tózwa matomba, tosengeli kobelela nkombo ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. a​—Nzembo 83:18.

 Na Biblia, maloba ‘kobelela nkombo ya Yehova’ elimboli kaka te koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango na losambo. (Nzembo 116:12-14) Esangisi mpe kotyela Nzambe motema mpe kondima ete akosunga biso.​—Nzembo 20:7; 99:6.

 Nkombo ya Nzambe ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu Kristo. Maloba ya liboso na libondeli na ye ya ndakisa ezalaki: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama,” to ekóma mosantu. (Matai 6:9) Yesu mpe amonisaki ete tosengeli koyeba, kotosa, mpe kolinga Yehova soki tolingi kozwa bomoi ya seko.​—Yoane 17:3, 6, 26.

 Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali “Nkolo” oyo balobeli na Baloma 10:13 na Biblia haut fleuve? Mpo maloba ya vɛrsɛ yango ezongelaki maloba ya Yoele 2:32, epai nkombo ya Nzambe ezali na makomi ya Ebre ya kala, kasi ezalaki te titre “Nkolo.” b

Makambo oyo bazali kolobela na Baroma 10:13

 Na Baroma mokapo 10, Biblia emonisi ete moto nyonso oyo azali na boyokani malamu ná Nzambe asengeli mpe kondimela Yesu Kristo mpo abika. (Baroma 10:9) Bavɛrsɛ mingi ya makomi oyo babengaka mbala mingi Testama ya Kala endimisi likanisi yango. Moto amonisaka kondima ntango “alobaka polele,” elingi koloba kosakwela bato oyo bazali na kondima te nsango malamu ya lobiko. Yango epesaka basusu libaku ya komonisa kondima oyo ezali komema na bomoi.​—Baroma 10:10, 14, 15, 17.

Tángá Baroma mokapo 10 ná maloba na nse ya lokasa, mpe ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.

a Nkombo ya Nzambe ezali mbala soki 7 000 na bamaniskri ya kala ya Biblia. Na Ebre, nkombo ya Nzambe ekomamaka na balɛtrɛ minei, babengaka yango Tetragrame. Mbala mingi babongolaka nkombo ya Nzambe na “Yehova” na Lingala; kasi bato mosusu ya mayele babongolaka yango “Yawe.”

b Emonani lokola bakomi ya Biblia ya bokristo basalelaki nkombo ya Nzambe ntango bazongelaki maloba ya makomi ya “Testama ya Kala” oyo ezalaki na nkombo yango. Diksionɛrɛ moko The Anchor Bible Dictionary elobi: “Ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Tetragrame ya nkombo ya Nzambe, Yawe, oyo ezalaki na makomi mosusu to nyonso ya Testama ya Kala ezongelamaki na Testama ya Sika ntango bazalaki naino kokoma Testama ya Sika.” (Volimi 6, lokasa 392) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Grɛki ya bokristo” na Apɛndisi A5 na Biblia ya boyekoli ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na Anglais. Apɛndisi C2 ezali na liste ya mabongoli mingi ya Biblia oyo esaleli nkombo ya Nzambe na Baroma 10:13.