Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bavideo ya Biblia​—Mateya ya ntina mingi

Bavideo oyo ya mikuse eyanoli na mituna ya ntina mingi ya Biblia mpe eyokani na mateya oyo ezali na mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!

Molɔ́ngɔ́ ekelamaki?

Bato mingi bandimaka te lisolo oyo Biblia elobi mpo na bozalisi to bamonaka yango lokola lisapo mpamba. Makambo oyo Biblia elobi ekoki kotyelama motema?

Nzambe azali na nkombo?

Nzambe azali na batitre ebele, na ndakisa Tata, Mozalisi, mpe Nkolo. Kasi nkombo ya Nzambe etángami mbala soki 7 000 na Biblia.

Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe?

Esali bambula, bato bazali na mposa ya koyeba moto oyo akelá bango. Biblia ekoki kosalisa biso tókóma baninga ya Nzambe. Boninga yango ekobanda ntango oyebi nkombo ya Nzambe.

Biblia ezali mokanda ya nani?

Soki bato nde bakomaki yango, ebongi mpenza ebengama Liloba ya Nzambe? Makanisi ya nani ezali na Biblia?

Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo?

Soki Biblia eutá na Nzambe, esengeli kokesana na buku mosusu nyonso oyo ekomamá.

Mpo na nini Nzambe akelaki mabele?

Mabele etondi na biloko kitoko mpenza. Akabolá yango na moi na ntaka oyo ebongi mpenza, atyá na ndenge etɛngamá malamu mpe atyá yango ebalukaka na vitɛsi oyo ebongi. Mpo na nini Nzambe asalaki milende mingi ndenge wana mpo na kokela mabele kitoko oyo?

Moto akómaka ndenge nini soki akufi?

Biblia elobeli ntango oyo bato mingi bakosekwa kaka ndenge Lazare asekwaki.

Lifelo ezali mpenza esika ya monyoko?

Biblia eyebisi ete lokola “Nzambe azali bolingo,” akoki te konyokola bato mpo na mabunga na bango ya kala.

Yesu Kristo azali Nzambe?

Yesu Kristo kaka ye moko nde azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? To bazali bato mibale oyo bakeseni mpenza?

Mpo na nini Yesu akufaki?

Biblia epesaka motuya mingi na liwa ya Yesu. Liwa ya Yesu ezalaki na ntina nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ateyaki makambo etali Bokonzi ya Nzambe koleka makambo mosusu nyonso.

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na mobu 1914

Eleki sikoya mbula 2 500, Nzambe alɔtisaki mokonzi moko ya nguya ndɔtɔ moko ya esakweli oyo ezali kokokisama lelo oyo.

Mokili ebongwani banda na mobu 1914

Ndenge makambo na mokili mpe bizaleli ya bato ebongwani banda na mobu 1914 emonisi ete bisakweli ya Biblia oyo elobeli “mikolo ya nsuka” ezali kokokisama.

Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

Bato mingi batunaka ntina oyo mokili etondi na koyinana mpe bampasi. Biblia epesi eyano ya malamu mpe ya kolendisa.

Nzambe andimaka mangomba nyonso?

Bato mingi bakanisaka ete ezala moto aponi kosambela na lingomba nini, yango ezali na ntina te.

Nzambe andimaka kosalela bikeko na losambo?

Bikeko ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe oyo tokoki te komona?

Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?

Bongo soki moto azali kobondela mpo na matomba na ye moko? Bongo soki mobali azali konyokola mwasi na ye mpe lobi na yango abondeli Nzambe apambola ye?