Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ntango bozali na makanisi ekeseni

Ntango bozali na makanisi ekeseni

 Na libala, soki mwasi ná mobali bakeseni na makambo oyo mokomoko asepelaka na yango, na makambo bameseni kosala mpe na bizaleli mikakatano ezangaka te. Kasi, makambo mosusu ekoki kutu kobimisa mikakatano koleka, na ndakisa:

  •   Ntango ya kolekisa na bandeko ya libota

  •   Ndenge ya kosalela mbongo

  •   Kozala na bana to te

 Okoki kosala nini soki yo ná molongani na yo bozali na makanisi ekeseni?

 Oyo osengeli koyeba

 Koyokana na makambo elakisi te ete bozali ndenge moko. Ata mwasi ná mobali oyo bayokanaka malamu, bazalaka ntango nyonso te na makanisi ndenge moko, ezala mpe na makambo ya ntina mingi mpenza.

 “Nakolá na libota moko oyo ezali na bomoko mpenza. Na bawikende, tozalaki kolekisa ntango elongo na bankɔkɔ, banɔkɔ, batata-mwasi mpe bana na bango. Libota ya mobali na ngai bazalaki kosala bongo te. Yango wana makanisi na biso ekesanaki na likambo etali ngonga ya kolekisa elongo na bandeko ya libota to kosolola na baoyo bafandaka mosika.”​—Tamara.

 “Ngai ná mwasi na ngai tokolá ndenge moko te na likambo etali kosalela mbongo. Kutu, na basanza ya liboso ya libala na biso, na bantango mosusu tozalaki koswana mpo na likambo yango. Esɛngaki tósolola mbala na mbala mpo na kobongisa likambo yango.”​—Tyler.

Bato mibale bakoki kotala eloko moko mpe kozala na makanisi ekeseni. Ndenge moko mpe, mwasi ná mobali bakoki kotalela likambo moko na ndenge ekeseni

 Esuki kaka te na kondima kotika likambo mpo na kosilisa mikakatano mosusu. Na ndakisa, okosala nini soki tata to mama-bokilo na yo azali kobɛla mpe azali na mposa ya lisalisi ya monganga? To okosala nini soki molongani na yo alingi kozala na bana kasi yo olingi te? a

 “Ngai ná mwasi na ngai tosololaki mingi na likambo etali kozala na bana. Azali kokanisa likambo yango mbala na mbala mpe makanisi na ngai ná ye ekómi kokesana. Nazali komona te ndenge ya kondima likanisi na ye.”​—Alex.

 Kozala na makanisi ekeseni elimboli te ete libala na bino elongi te. Bato mosusu ya mayele balobi ete soki yo ná molongani na yo bozali koyokana te na likambo moko ya ntina, osengeli kotingama na likanisi na yo ata soki ekosɛnga libala yango ekufa. Kasi kosala bongo ekomonisa ete ndenge ozali komiyoka nde eleki ntina mpe kosundola elako oyo osalaki na miso ya Nzambe ete okokangama na molongani na yo ata soki likambo nini ekómi.

 Oyo okoki kosala

 Zalá na ekateli ya kotosa elako ya libala na bino. Soki ozali na mposa ya kotosa elako ya libala oyo bosalaki, bokopesana mabɔkɔ mpo na kosilisa mikakatano na esika ya kozala lokola banguna.

 Toli ya Biblia: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

 Yebá oyo yango ekosɛnga. Tózwa ndakisa, soki ozali na mposa ya kozala na bana kasi molongani na yo alingi te; ezali na makambo oyo osengeli kotalela; na ndakisa:

  •   Soki bolinganaka makasi na libala.

     Boyokani na bino ezali mpenza makasi mpo mitungisi oyo eyaka na kobɔkɔla bana etya libala na bino na likama te?

  •   Mokumba ya kozala moboti.

     Esuki kaka te na koleisa, kolatisa to kozala na ndako ya kofanda.

  •   Mbongo oyo bozali na yango.

     Ozali na likoki ya kotya mosala, libota mpe mikumba mosusu na esika na yango?

 Toli ya Biblia: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga?”​—Luka 14:28.

 Talelá nyonso oyo etali likambo yango. Yango ekoki kosalisa bino bósilisa matata mosusu oyo bozali na yango. Na ndakisa, soki ezali likambo ya kozala na bana, molongani oyo alingi yango te, asengeli komituna:

  •   ‘Lokola nalobi nalingi kozala na bana te, yango elingi koloba ete ezali mpo na libela to kaka mpo na sikoyo?’

  •   ‘Nazali kobanga mpo nayebi te soki nakozala moboti malamu?’

  •   ‘Nazali kobanga ete molongani na ngai atika kokipe ngai lisusu?’

 Na ngámbo mosusu, molongani oyo azali na mposa ya kozala na bana akoki komituna boye:

  •   ‘Namibongisi mpo na mokumba ya kozala moboti?’

  •   ‘Tozali na mbongo ya kobɔkɔla mwana?’

 Toli ya Biblia: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . makambo makasimakasi te.”​—Yakobo 3:17.

 Ndimá ete molongani na yo azali na lotomo ya kozala na makanisi oyo ekeseni na oyo ya yo. Bato mibale bakoki kotala eloko moko mpe kozala na makanisi ekeseni. Ndenge moko mpe, mwasi ná mobali bakoki kotalela likambo moko na ndenge ekeseni, na ndakisa mpo na ndenge ya kosalela mbongo. Mpo na kolobela likambo nyonso oyo bozali koyokana na yango te, bóbanda naino na oyo bozali koyokana.

  •   Bino mibale boyokani bósala makambo nini?

  •   Likanisi oyo moninga apesi ezali na litomba nini?

  •   Mpo na kobatela libala na bino, bokondima to okondima kobongola likanisi na yo mpo solisyo emonana?

 Toli ya Biblia: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 Bakorinti 10:24.

a Esɛngaka kosolola makambo ya ntina liboso ya kobalana. Kasi, makambo oyo ekanami te ekoki kobima, to mpe makambo oyo moninga moko azalaki kosepela na yango liboso ekoki kosepelisa ye lisusu te.​—Mosakoli 9:11.