Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya komonisa ete olingaka molongani na yo

Ndenge ya komonisa ete olingaka molongani na yo

 Wana bambula ezali koleka, babalani mosusu batikaka komoniselana bolingo. Soki ezali mpe bongo na libala na yo, osengeli komitungisa?

 Oyo osengeli koyeba

 Bolingo ezali na ntina mingi mpo boyokani na libala ezala makasi. Ndenge kaka kolya mpe komɛla mai mbala na mbala ezalaka na ntina mingi mpo nzoto ezala makasi mpe kolɔngɔnɔ, komoniselana bolingo eleisaka mpe ekómisaka boyokani na libala makasi. Ata nsima ya kosala bambula ebele na libala, basi mpe mibali bazalaka na mposa ete balongani na bango bámonisaka mbala na mbala ete balingaka bango mpe bakipaka bango.

 Bolingo ya solosolo elukaka matomba na yango moko te. Elukaka nde esengo ya moninga. Na yango, na esika amonisa bolingo kaka soki ayoki mposa ya kosala bongo, molongani ya malamu ayebaka soki moninga azali na mposa bámonisela ye bolingo mpe asalaka nyonso mpo na kokokisa mposa yango.

 Na kokesana na mibali, basi bazalaka na mposa bámonisela bango bolingo mingi. Mobali akoki kolinga mwasi na ye makasi mpenza, kasi soki azali komonisa bolingo yango kaka na ebandeli to na nsuka ya mokolo to liboso básangisa nzoto, mwasi na ye akobanda komituna soki alingaka ye mpenza. Ezali malamu mingi koleka komoniselanaka bolingo na boumeli ya mokolo mobimba.

 Oyo okoki kosala

 Monisáká na maloba ete olingaka molongani na yo. Maloba lokola “Nalingaka yo” to “Ozali na valɛrɛ mingi na miso na ngai” ekoki kotinda molongani na yo amiyoka ete olingaka ye mpenza.

 Toli ya Biblia: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.”​—Matai 12:34.

 Likanisi: Esɛngi kaka te oloba na monɔkɔ maloba ya bolingo; okoki mpe kokoma yango na mwa nɔti, na e-mails to na bamesaje.

 Monisáká bolingo na misala. Koyamba, kopesa bizi to kaka kosimbana mabɔkɔ ekoki komonisa mpenza ete ndenge olobaka “nalingaka yo” ezali maloba mpamba te. Kosimba mwa moke molongani na yo, kotala ye na liso ya bolingo to kopesa ye mwa kado na bantango mosusu, ekoki mpe komonisa ete olingaka ye. Bongo kosala misala mpo na kosalisa mwasi na yo; na ndakisa komemela ye sakosi, kofungolela ye porte, kosukola basaani, kosukola bilamba to kolamba? Mpo na bato mingi, kosala bongo ezali kaka lisalisi te; emonisaka mpenza bolingo!

 Toli ya Biblia: “Tólingaka, na maloba [kaka] te mpe na lolemo te, kasi na misala.”​—1 Yoane 3:18.

 Likanisi: Salelá molongani na yo makambo ndenge ozalaki kosala ntango bozalaki bafianse.

 Bózwaka ntango ya kozala elongo. Kozala bino mibale elongo ekokómisa boyokani na bino na libala makasi mpe molongani na yo akomona ete osepelaka kozala elongo na ye. Toboyi te, ekoki kozala mpasi kozwa ntango soki bozali na bana to bozali na makambo mingi ya ntina ya kolobela mokolo na mokolo. Mbala mosusu bokoki kosalaka likambo moko ya pɛtɛɛ na ndakisa kotambola elongo; kaka bino mibale.

 Toli ya Biblia: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

 Likanisi: Balongani mosusu oyo bazalaka na misala mingi babombaka mbala na mbala ntango mpo na “kobimaka na butu” to “na bawikende” mpo bázala elongo bango mibale kaka.

 Yebá molongani na yo. Moto na moto azalaka na ndenge oyo alingaka bámonisela ye bolingo. Bósolola mpo na koyeba ndenge mokomoko akolinga moninga amonisela ye bolingo mpe soki azali na mposa ya likambo mosusu. Na nsima, salá makasi okokisa mposa ya molongani na yo. Kobosana te, bolingo ezali na ntina mingi mpo boyokani na libala ezala makasi.

 Toli ya Biblia: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.”​—1 Bakorinti 13:4, 5.

 Likanisi: Na esika osɛnga bámonisela yo bolingo, omituna nde boye, ‘Nakoki kosala nini mpo molongani na ngai amonisela ngai bolingo mingi?’