Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya kosalisa mwana na yo azwaka bapwɛ ya malamu na kelasi

Ndenge ya kosalisa mwana na yo azwaka bapwɛ ya malamu na kelasi

 Emonani ete mwana na yo azali kokipe makambo ya kelasi te; azali kosala badevuare na ye te mpe azali kotánga te. Yango ebimisi nini? Akómi kozwa bapwɛ ya mabe mpe bizaleli na ye ebebi. Ndenge nini okoki kosalisa mwana azwaka bapwɛ ya malamu?

 Oyo osengeli koyeba

 Mbamba ebakisaki nde mokakatano. Kotya mwana na yo mbamba ekotinda ye nde amitungisa na kelasi mpe na ndako! Mpo mitungisi na ye ekita, akoki kokosa, kobomba bapwɛ ya moke, komekola sinyatire na yo na bulletin to kokima kelasi. Makambo ekobeba nde lisusu.

 Kopesa bakado ekoki kobimisa likambo mosusu. Tata moko na nkombo Andrew, alobi boye: “Tozalaki kopesa mwana bakado soki azwi bapwɛ mingi mpo na kolendisa ye. Kasi yango esalaki ete akóma kotya makanisi kaka na kado. Soki azwi bapwɛ moke, azalaki kolɛmba nzoto mpo azwi kado te na esika alɛmba nzoto mpo azwi bapwɛ moke.”

 Kopesa molakisi foti ekosalisa mwana na yo te. Mwana na yo akoki komona ete kozwa bapwɛ ya malamu esɛngaka na yango milende te. Akobanda mpe kopesa basusu foti mpo na mabunga na ye mpe kolinga ete basusu nde básilisaka mikakatano na ye. Na mokuse, mwana na yo akozanga likoki ya koyeba komema mikumba na ye; likoki ya ntina mingi mpo na baoyo bakómi mikóló.

 Oyo okoki kosala

 Zalá na komipekisa. Soki ozali na nkanda, poná ngonga mosusu mpo na kosolola na mwana na yo makambo etali bapwɛ na ye ya kelasi. Tata moko na nkombo Brett, alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tozwaka matomba ya malamu soki toboyi kosilika mpe tomitye na esika ya mwana.”

 Toli ya Biblia: “Koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.”​—Yakobo 1:19.

 Luká koyeba ntina oyo azali kozwa te. Mbala mingi bana bazwaka bapwɛ moke mpo na matumoli, alongwe na eteyelo oyo azalaki kotánga liboso, kobanga ekzamɛ, mikakatano na libota, kozanga mpɔngi, kozanga programɛ ya malamu to kozanga kotya makanisi esika moko. Koloba mbala moko te ete mwana na yo azali kaka gɔigɔi.

 Toli ya Biblia: “Ye oyo amonisaka mayele ya kososola na likambo akozwa bolamu.”​—Masese 16:20.

 Bongisá makambo oyo ekopesa mwana nzela ya koyekola. Salá programɛ mpo na badevuare mpe koyekola na ndako. Bongisá esika oyo mwana akoki kosala badevuare kozanga ete likebi na ye ekende na makambo mosusu (televizyo mpe telefone). Kabolá ntango ya kosala badevuare na biteni mpo na kosalisa mwana atya makanisi na likambo azali kosala. Hector, tata moko oyo afandaka na Allemagne, alobi boye: “Soki bakosala baekzamɛ, tozongelaka makambo batángisaki bango mokemoke mikolo nyonso na esika ya kozela miniti ya nsuka mpo na kosala yango.”

 Toli ya Biblia: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.”​—Mosakoli 3:1.

 Lendisáká ye ayekolaka. Soki mwana na yo ayebi matomba oyo kelasi ememelaka ye sikoyo, yango ekopesa ye mposa ya kolinga lisusu koyekola. Na ndakisa, matematiki ekoki kosalisa ye ayeba kosalela mbongo na ye.

 Toli ya Biblia: “Zwá bwanya, zwá mayele. . . . Zwá yango na motuya monene.”​—Masese 4:5, 8.

 Toli: Salisá mwana ntango azali kosala badevuare, kasi kosalela ye yango te. Andrew, alobi boye: “Mwana na biso ya mwasi azalaki kozela biso nde tólukela ye biyano na badevuare na ye ya kelasi kasi ye moko azalaki koluka te.” Lakisá mwana ndenge ya kosala ye moko badevuare na ye.