Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?

Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobi polele ete bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe te! Yehova Nzambe akanaki te ete bato bámonaka mpasi. Kasi, mwasi ná mobali ya liboso baboyaki Nzambe ayangela bango, baponaki kotya mibeko na bango moko na oyo etali mabe ná malamu. Bapesaki Nzambe mokɔngɔ; yango wana bakómaki komona mpasi.

 Lelo oyo, tomonaka mpasi mpo na mabe oyo bango basalaki. Kasi bampasi ya bato eutaki epai ya Nzambe te.

 Biblia elobi boye: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Mpasi ekoki kozwa moto nyonso, ata bato oyo Nzambe andimaka.