Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bokonzi ya Nzambe ezali na motema na yo?

Bokonzi ya Nzambe ezali na motema na yo?

Eyano ya Biblia

 Te. Bokonzi ya Nzambe ezalaka na mitema ya bakristo te. a Biblia emonisi esika oyo Bokonzi yango ezalaka na ndenge ebengi yango “Bokonzi na likoló.” (Matai 4:17, haut fleuve) Talá ndenge Biblia emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo oyo ezali koyangela kuna na likoló.

  •   Bokonzi ya Nzambe ezali na bakonzi oyo bakoyangela, bana-mboka, mibeko, mpe mokumba ya kosala ete mokano ya Nzambe esalema na likoló mpe na mabele.​—Matai 6:10; Emoniseli 5:10.

  •   Guvɛrnema to Bokonzi ya Nzambe ekoyangela “bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso” ya mabele. (Danyele 7:13, 14) Lotomo na yango ya koyangela euti epai ya bana-mboka na yango te, kasi epai ya Nzambe ye moko.​—Nzembo 2:4-6; Yisaya 9:7.

  •   Yesu ayebisaki bayekoli na ye ya sembo ete bakolanda ye na likoló mpo ‘báfanda na bakiti ya bokonzi.’​—Luka 22:28, 30.

  •   Bokonzi ya Nzambe ezali na banguna; ekobebisa banguna yango.​—Nzembo 2:1, 2, 8, 9; 110:1, 2; 1 Bakorinti 15:25, 26.

 Biblia eteyaka te ete Bokonzi ya likoló eyangelaka na kati ya motema ya moto. Emonisi nde ete “liloba ya bokonzi” to “nsango malamu oyo ya bokonzi” ekoki mpe esengeli kobongola mitema na biso.​—Matai 13:19; 24:14.

Maloba “bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino” elimboli nini?

 Ndenge Babiblia mosusu ebongolá maloba ya Luka 17:21 esali ete bato mosusu báyeba lisusu mpenza te esika oyo Bokonzi ya Nzambe ezalaka. Na ndakisa Biblia haut fleuve elobi ete “Bokonzi ezali kati na bino.” Mpo na kokanga ntina ya vɛrsɛ wana, esengeli kotalela bavɛrsɛ oyo ezali likoló.

Bokonzi ya Nzambe ezalaki te na kati ya mitema mabe ya banguna ya Yesu, oyo bazalaki koluka koboma ye

 Yesu azalaki koloba na Bafarisai, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla ye mpe koluka koboma ye. (Matai 12:14; Luka 17:20) Ebongi mpenza kokanisa ete Bokonzi ya Nzambe ezalaki na kati ya mitema na bango ya mabe? Yesu ayebisaki bango ete: “Na kati botondi na bokosi mpe na kobuka mibeko.”​—Matai 23:27, 28.

 Babiblia mosusu ebongoli malamu maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 17:21: “Bokonzi ya Nzambe ezali awa elongo na bino.” (Contemporary English Version) “Bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.” (Libongoli ya Mokili ya Sika) Bokonzi ya likoló ezalaki “elongo na” Bafarisai to “na katikati” na bango, mpamba te Yesu, moto oyo Nzambe aponaki mpo azala Mokonzi ya Bokonzi yango, azalaki wana liboso na bango.​—Luka 1:32, 33.

a Mangomba mingi ya bokristo eteyaka ete Bokonzi ya Nzambe ezalaka na kati ya motema ya moto. Na ndakisa, na États-Unis, lingomba moko ya batiste elobaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali “boyangeli ya Nzambe na kati ya motema mpe bomoi ya moto.” Ndenge moko mpe, na buku na ye Yesu moto ya Nazarete, Pápa Benoît XVI alobaki ete “Bokonzi ya Nzambe eyaka na motema ya moto ya botosi.”