Lakisá makambo oyo ezali na kati

Elamba ya kozipa oyo ezalaka na Turin ezali elamba oyo bakundaki na yango Yesu?

Elamba ya kozipa oyo ezalaka na Turin ezali elamba oyo bakundaki na yango Yesu?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli elamba yango te. Ezali eteni ya elamba ya lini oyo bato mingi bakanisaka ete bakundaki na yango Yesu Kristo. Makanisi yango etindaka bato mosusu bátalela elamba yango lokola moko ya biloko eleki mosantu ya mangomba ya bokristo. Lelo oyo elamba yango ezalaka na Ndako-nzambe moko ya etúká ya Turin, na Italie, na esika oyo ebatelami malamu mpenza.

 Masolo ya Biblia endimi likanisi oyo ete elamba yango ezali mpenza oyo bakundaki na yango Yesu? Te.

 Tótalela makambo misato ya elamba yango oyo ekesenisi yango na oyo Biblia elobi.

  1.   Elamba yango ya kozipa ezali na molai ya mɛtrɛ soki minei na ndambo (4,42 m) mpe monene ya mɛtrɛ soki moko na ndambo (1,13 m) soki olongoli santimɛtrɛ mwambe ya kogumbama ya elamba yango oyo batongá na molai na yango.

     Oyo Biblia elobi: Balíngaki nzoto ya Yesu na biteni ebele ya bilamba, kasi te na eteni moko ya elamba ya lini. Balíngaki motó na ye na elamba mosusu. Ntango Yesu asekwaki, moko ya bantoma na ye akendaki na lilita oyo etikalaki polele mpe “amonaki biteni ya bilamba yango elali.” Biblia ebakisi boye: “Elamba oyo ezalaki na motó na ye elali esika moko te na biteni ya bilamba yango, kasi elíngami na esika na yango moko.”​—Yoane 20:6, 7.

  2.   Elamba yango ya kozipa ezali na bilembo ya makila ya nzoto oyo basukolá te.

     Oyo Biblia elobi: Ntango Yesu akufaki, bayekoli na ye babongisaki nzoto na ye “ndenge Bayuda bazalaki na momeseno ya kobongisa ndenge ya kokunda bato.” (Yoane 19:39-42) Bazalaki na momeseno ya kosukola ebembe mpe kopakola yango mafuta mpe matiti ya nsolo kitoko liboso bákunda yango. (Matai 26:12; Misala 9:37) Na yango, bayekoli ya Yesu basukolaki naino nzoto ya Yesu liboso bálínga yango bilamba.

  3.   Elamba yango ya kozipa ezali na elilingi ya elongi ya moto “balalisaki ye na molai ya ndambo ya elamba yango mpe ndambo na yango mosusu bagumbá na mibale likoló ya motó ya moto yango mpo ezipa elongi mobimba ya nzoto yango,” ndenge buku Encyclopædia Britannica elobi yango.

     Oyo Biblia elobi: Bayekoli ya Yesu balobelaki liwa na ye, ndenge lilita na ye etikalaki mpamba mpe litatoli ya basi oyo bamonaki na miso “emonaneli moko ya kokamwa ya baanzelu, oyo balobaki ete azali na bomoi.” (Luka 24:15-24) Soki elamba yango ya kozipa ezalaki na lilita ya Yesu mbɛlɛ bayekoli na ye balobelaki yango mpe elilingi oyo ezali na elamba yango. Kasi, Biblia elobi likambo moko te ya ndenge wana.

Esengeli kosambela elamba yango?

 Te. Ata soki ezalaki mpenza elamba oyo bakundaki na yango Yesu, kosambela yango elingaki kozala mabe kaka. Tótalela mitinda ya Biblia oyo emonisi mpo na nini ezali mabe.

  1.   Ezali na ntina te. Yesu alobaki boye: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Basambeli ya solo basalelaka te biloko mosantu to bikeko na losambo.

  2.   Epekisami. Mibeko zomi epekisi losambo ya bikeko. (Kolimbola Mibeko 5:6-10) Ndenge moko mpe, Biblia esɛngi bakristo boye: “Bókeba na bikeko.” (1 Yoane 5:21) Bamosusu bakoki koloba ete elamba yango ezali ekeko te kasi ezali kaka elilingi to elembo ya kondima na bango. Kasi elilingi ekómaka ekeko epai ya moto oyo asambeli yango. a Yango wana, moto oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli te kokangama to kosambela eloko nyonso, ata mpe elamba yango.

a Ekeko ezali elilingi to elembo ya eloko oyo bazali kokumisa.