Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kozala mosantu elimboli nini?

Kozala mosantu elimboli nini?

Eyano ya Biblia

 Kozala mosantu elimboli kozala mosika na mbindo nyonso. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mosantu” euti na liloba moko oyo elimboli “kotyama pembeni.” Na yango, eloko oyo ezali mosantu esalelamaka mpambampamba te lokola biloko mosusu, mingimingi mpo ezali pɛto mpenza.

 Nzambe nde aleki na bosantu. Biblia elobi: “Moko te azali mosantu lokola Yehova.” a (1 Samwele 2:2) Na yango, Nzambe azali na lotomo ya kotya mibeko na oyo etali bosantu.

 Liloba “mosantu” ekoki kosalelama na eloko nyonso oyo ezali na boyokani na Nzambe, mingimingi biloko oyo etyami pembeni kaka mpo na losambo. Na ndakisa, Biblia elobeli:

  •   Bisika mosantu: Nzambe ayebisaki Moize boye pene ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela: “Esika otɛlɛmi ezali mabele mosantu.”​—Kobima 3:2-5.

  •   Milulu mosantu: Bayisraele bazalaki kosambela Yehova na bafɛti ya losambo oyo ebengami “mayangani mosantu,” oyo bazalaki kosala mbala na mbala.”​—Balevi 23:37.

  •   Biloko mosantu: Biloko oyo bazalaki kosalela na losambo na tempelo ya Yerusaleme ebengamaki ‘bisaleli mosantu.’ (1 Bakonzi 8:4) Esɛngaki kozala na limemya makasi mpo na biloko yango, atako esengelaki te kosambela yango. b

Moto ya kozanga kokoka akoki kozala mosantu?

 Ɛɛ. Nzambe ayebisi bakristo boye: “Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” (1 Petro 1:16) Toboyi te, bato ya kozanga kokoka bakoki te kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bosantu na ndenge ya kokoka. Ata bongo, baoyo batosaka mibeko ya Nzambe bakoki kotángama ‘basantu mpe Nzambe akoki kondima bango.’ (Baroma 12:1) Moto oyo azali kosala nyonso mpo na kozala mosantu amonisaka yango na maloba mpe makambo asalaka. Na ndakisa, alandaka toli ya Biblia oyo esɛngi ‘tósantisama mpe tóboya pite’ mpe ‘tókóma basantu na etamboli na biso mobimba.’​—1 Batesaloniki 4:3; 1 Petro 1:15.

Tokoki kobungisa bosantu na biso na miso ya Nzambe?

 Ɛɛ. Soki moto atiki kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali etamboli, Nzambe akotalela lisusu te moto yango lokola mosantu. Na ndakisa, mokanda ya Ebre ekomami mpo na “bandeko basantu,” ata bongo ekebisi bango ete bakoki kokóma “na motema mabe oyo ezangi kondima mpe kotika Nzambe ya bomoi.’​—Baebre 3:1, 12.

Makanisi ya libunga na oyo etali kozala mosantu

 Libunga: Moto akoki kokóma mosantu soki aboyi komisepelisa ata moke.

 Solo: Biblia emonisi ete “konyokola nzoto makasi,” to koboya komisepelisa ata moke ezali “ata na ntina moko te” mpo na Nzambe. (Bakolose 2:23) Kutu, Nzambe alingaka tósepela na biloko ya malamu. “Moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”​—Mosakoli 3:13.

 Libunga: Kotikala monzemba esalaka ete moto azala mosantu mingi.

 Solo: Atako mokristo akoki kopona kotikala monzemba, yango te nde esalaka ete amonana mosantu na miso ya Nzambe. Toboyi te ete baoyo batikalaka minzemba bakoki komipesa mobimba na makambo ya losambo. (1 Bakorinti 7:32-34) Kasi, emonisi ete baoyo babalá bakoki mpe kozala basantu. Kutu, Petro, moko ya bantoma ya Yesu azalaki monzemba te.​—Matai 8:14; 1 Bakorinti 9:5.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. Bavɛrsɛ mingi ya Biblia esalelaka nkombo yango esika moko na liloba “mosantu” mpe “bosantu.”

b Biblia epekisi kosambela biloko mosantu.​—1 Bakorinti 10:14.