Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ekoki kosalisa ngai soki nazali mawamawa?

Biblia ekoki kosalisa ngai soki nazali mawamawa?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ, mpo lisalisi ya solosolo eutaka epai ya “Nzambe oyo akitisaka mitema ya bato ya mawa.”​—2 Bakorinti 7:6, Bible na lingala ya lelo oyo.

Soki moto azali mawamawa, Nzambe apesaka ye:

  •   Makasi. Mpo Nzambe ‘akitisa yo motema’, akolongola te makambo ya mpasi oyo ozali na yango, kasi soki obondeli ye, akopesa yo makasi ya kokangela makambo yango motema. (Bafilipi 4:13) Okoki kotya motema ete akoyoka yo, mpo Biblia elobi: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.” (Nzembo 34:18) Kutu, Nzambe akoki koyoka libondeli na yo ata soki ozali kokoka te kobimisa maloba oyo ekomonisa mpenza mpasi na yo.​—Baroma 8:26, 27.

  •   Bandakisa ya malamu. Mokomi moko ya Biblia abondelaki Nzambe boye: “Nazali kobelela yo; nakómi lokola moto adindi na libulu.” Mokomi ya nzembo wana atikaki kozala mawamawa ntango akanisaki lisusu ete Nzambe abombelaka biso nkanda na motema te mpo na masumu na biso. Alobaki nde na Nzambe ete: “Soki olandaka masumu ya bato, nani moto akoki kobika? Kasi olimbisaka masumu; yango wana totosaka yo.”​—Nzembo 130:1, 3, 4, Bible na lingala ya lelo oyo.

  •   Elikya. Nzambe azali kokitisa biso motema lelo, mpe alaki ete akolongola makambo nyonso oyo etindaka moto akóma mawamawa. Ntango akokokisa elaka yango, “makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.”​—Yisaya 65:17.

 Simbá likambo oyo: Atako biso Batatoli ya Yehova tondimaka ete Nzambe asalisaka biso, tolukaka mpe lisalisi ya minganga soki tozali mawamawa to tozali konyokwama na makanisi. (Marko 2:17) Kasi, totindaka moto te andima nkisi boye to boye; toyebi ete na makambo etali komisalisa, moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye.