Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ezali mpenza na makanisi ya Nzambe?

Biblia ezali mpenza na makanisi ya Nzambe?

Eyano ya Biblia

 Bato mingi oyo bakomaki Biblia balobi ete Nzambe nde ayebisaki bango makambo oyo bakomaki. Talá bandakisa oyo:

  •  Mokonzi Davidi: “Elimo ya Yehova nde elobaki na nzela na ngai, mpe liloba na ye ezalaki na lolemo na ngai.”​—2 Samwele 23:1, 2.

  •  Mosakoli Yisaya: “Talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, alobi.”​—Yisaya 22:15.

  •  Ntoma Yoane: “Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye.”​—Emoniseli 1:1.