Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nani azali Mikaele anzelu-mokonzi?

Nani azali Mikaele anzelu-mokonzi?

Eyano ya Biblia

 Nkombo Mikaele, oyo mangomba mosusu ebengaka yango “santu Mikaele,” ezali nkombo oyo bapesaki Yesu liboso aya awa na mabele mpe nsima ya kozonga na likoló. a Nsima ya liwa ya Moize, Mikaele ná Satana bawelelaki nzoto ya Moize. Mikaele asalisaki mpe anzelu moko ayebisa mosakoli Danyele nsango ya Nzambe. (Danyele 10:13, 21; Yuda 9) Mikaele asalaka makambo oyo ekokani na nkombo na ye oyo elimboli “Nani akokani na Nzambe?” na ndenge abundelaka Bokonzi ya Nzambe mpe abundisaka banguna ya Nzambe.​—Danyele 12:1; Emoniseli 12:7.

 Tótalela ntina oyo ebongi tóloba ete Yesu nde azali Mikaele, anzelu-mokonzi.

  •   Mikaele azali “anzelu-mokonzi.” (Yuda 9) Kaka na bavɛrsɛ mibale ya Biblia nde okokuta titre “anzelu-mokonzi,” oyo elakisi “mokonzi ya baanzelu.” Na bisika yango nyonso mibale titre yango ezali ya moto moko, mpe yango emonisi ete kaka anzelu moko nde abengami na titre yango. Moko ya bavɛrsɛ yango elobi ete Nkolo Yesu “akokita uta na likoló na mbela ya komanda, na mongongo ya anzelu-mokonzi.” (1 Batesaloniki 4:16) Yesu azali “na mongongo ya anzelu-mokonzi” mpo azali Mikaele, anzelu-mokonzi.

  •   Mikaele akambaka limpinga ya baanzelu. “Mikaele ná baanzelu na ye babundaki na dragɔ,” Satana. (Emoniseli 12:7) Mikaele azali na bokonzi mingi na likoló, mpo babengi ye “moko ya bankumu minene” mpe “nkumu monene.” (Danyele 10:13, 21; 12:1) Batitre yango emonisi ete Mikaele azali “mokonzi oyo akambaka limpinga ya baanzelu,” ndenge Testama ya sika ya David Aune, moto moko ya mayele emonisi yango.

     Biblia elobeli nkombo ya moto kaka moko oyo akambaka limpinga ya baanzelu. Elobeli “emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe.” (2 Batesaloniki 1:7, 8; Matai 16:27) Yesu “akendaki na likoló mpe baanzelu ná bakonzi ná nguya nyonso batyamaki na nse ya bokonzi na ye.” (1 Petro 3:21, 22) Ekoki kosalema te ete Nzambe apesa Yesu mpe Mikaele mokumba moko ya kokamba limpinga ya baanzelu. Yango wana ebongi mpenza tóloba ete bankombo wana nyonso mibale, ezala Yesu to Mikaele ezali kaka ya moto moko.

  •   Mikaele “akotɛlɛma” na boumeli ya “ntango ya mpasi” oyo ebimá naino liboso te. (Danyele 12:1) Na mokanda ya Danyele, liloba ‘kotɛlɛma’ esalelamaka mbala mingi mpo na kolobela mokonzi oyo atɛlɛmi mpo na kosala likambo moko boye. (Danyele 11:2-4, 21) Yesu Kristo, oyo abengami “Liloba ya Nzambe” mpe “Mokonzi ya bakonzi,” akosala likambo moko mpo na koboma banguna nyonso ya Nzambe mpe akobatela basaleli ya Nzambe. (Emoniseli 19:11-16) Akosala yango na ntango ya “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá.”​—Matai 24:21, 42.

a Biblia elobeli mpe bato oyo bazalaki na bankombo mingi, na ndakisa Yakobo (oyo abengami mpe Yisraele), Petro (oyo abengamaka mpe Simo), mpe Tade (oyo abengami mpe Yuda).​—Ebandeli 49:1, 2; Matai 10:2, 3; Marko 3:18; Misala 1:13.