Lakisá makambo oyo ezali na kati

Zabolo azali mpenza ndenge nini?

Zabolo azali mpenza ndenge nini?

Eyano ya Biblia

 Zabolo azali ekelamu ya elimo to anzelu, elingi koloba ete azali na nzoto oyo tokoki te komona.​—Baefese 6:11, 12.

 Bato mingi bakanisaka ete Zabolo azali ekelamu moko lokola ntaba oyo ezali na maseke, na mokila, mpe na nkanya moko monene. Bato mosusu bakanisaka ete ndenge bamonisaka Zabolo ndenge wana emonisi ete bayemi oyo basalaki yango bazalaki na bomoi esili koleka mbula 1 000. Mpe emonani lokola masapo mpe mimeseno ya kala nde etindaki bayemi yango básala yango.

 Biblia emonisi ete Zabolo azalaka ndenge nini?

 Biblia ebengi Zabolo na bankombo ndenge na ndenge. Yango esalisi biso tóyeba kaka te soki azali na nzoto nini, kasi mpe bizaleli na ye. Yango oyo mwa bankombo yango:

  •   Anzelu ya pole. Amimonisaka lokola moto oyo akopesa bato eloko ya malamu mpo na kotinda bango bálanda mateya na ye na esika bálanda mateya ya Nzambe.​—2 Bakorinti 11:14.

  •   Nkɔsi oyo ezali koganga. Abundisaka mpenza basambeli ya Nzambe.​—1 Petro 5:8.

  •   Dragɔ ya monene. Abangisaka, azali na nguya, mpe azali mobebisi.​—Emoniseli 12:9.