Lakisá makambo oyo ezali na kati

Makanisi na oyo etali ndenge bomoi ebandá

Monganga moko oyo ayekolaka bɔɔngɔ alobeli kondima na ye

Profesɛrɛ Rajesh Kalaria alobeli mosala na ye mpe kondima na ye. Nini epesaki ye mposa ya koyekola siansi? Nini etindaki ye aluka koyeba ndenge oyo bomoi ebandá?

Irène Hof Laurenceau: Monganga moko oyo asalaka lipaso ya mikuwa alobeli kondima na ye

Mosala na ye ya kotya prothèse ya mabɔlɔngɔ nde etindaki ye akóma na bantembe mpo na bindimeli na ye ya evolisyo.

Monganga moko oyo ayekolaka ndenge mwana asalamaka na libumu alobeli kondima na ye

Profesɛrɛ Yan-Der Hsuuw azalaki kondima evolisyo, kasi ntango akómaki kosala bolukiluki na makambo ya siansi, abongolaki makanisi na ye.

Monganga moko oyo ayebi kosala lipaso malamu alobeli kondima na ye

Banda bambula mingi doktɛrɛ Guillermo Perez azalaki kondima liteya ya evolisyo, kasi sikoyo andimi mpenza ete Nzambe nde asalá nzoto na biso. Nini etindaki ye abongola makanisi?

Monganga moko ya maladi ya bangɛi alobeli kondima na ye

Mpo na nini doktɛrɛ moko oyo kala azalaki kondima Nzambe te, abandaki kokanisa Nzambe mpe ntina ya bomoi? Nini etindaki ye abongola lolenge na ye ya kotalela makambo yango?

Moto moko oyo asalaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ alobeli kondima na ye

Ntango Fan Yu abandaki mosala na ye ya kosala bolukiluki na makambo ya matematiki, azalaki kondima te ete Nzambe azali mpe azalaki kondima liteya ya evolisyo. Lelo andimaka ete Nzambe nde asalá ete bomoi ezala. Mpo na nini?

Moto moko ya mayele ya fiziki alobeli kondima na ye

Makambo mibale ya minene oyo amonaki na likoló mpe mabele endimisaki Wenlong He ete Mozalisi azali.

“Nandimi mpenza ete Mozalisi azali”

Frédéric Dumoulin ayinaki makambo ya mangomba mpe akómaki kondima te ete Nzambe azalaka. Ndenge nini boyekoli ya Biblia mpe ndenge oyo bikelamu ya bomoi esalemá endimisaki ye ete Mozalisi azali?

Moto moko ya siansi oyo babengi biotechnologie alobeli kondima na ye

Koyekola ndenge oyo nzoto na biso ebundisaka bamikrobe etindaki Doktɛrɛ Hans Kristian Kotlar amituna soki bomoi ebanda ndenge nini. Ndenge nini koyekola Biblia esalisaki ye azwa biyano?

Moto moko ya siansi alobeli kondima na ye

Talá makambo mosusu ya siansi oyo atalelaki mpe ntina oyo azali kondimela Liloba ya Nzambe.

Moto moko ya matematiki alobeli kondima na ye

Mpo na nini Profesɛrɛ Gene Hwang amoni ete mateya ya Nzambe oyo andimaka eboyi te mosala oyo asalaka?

“Nandimaka mpenza ete bomoi eutá na Nzambe”

Tángá mpo oyeba ntina oyo moto moko ya siansi abongolaki makanisi na ye mpo na Biblia, liteya ya evolisyo, mpe ndenge bomoi ebandá.