Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 3

Ndenge ya kosilisa mikakatano

Ndenge ya kosilisa mikakatano

“Bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka ebele ya masumu.”1 Petro 4:8

Ntango bobalani, yo ná molongani na yo bokokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Mikakatano yango ekoki kobima mpo ndenge na bino ya kokanisa, ya koyoka na ntango ya likambo, to ya kotalela bomoi ekeseni. Mikakatano mosusu ekoki kouta epai ya bato mosusu to ekoki kobima na mbalakaka.

Okoki koluka kokima makambo yango, kasi Biblia elobi ete tosengeli nde koluka kobongisa makambo. (Matai 5:23, 24) Okobongisa makambo ebele soki ozali kolanda batoli ya Biblia.

1 BÓLOBELA LIKAMBO OYO EBIMI

OYO BIBLIA ELOBI: ‘Ezali na ntango ya koloba.’ (Mosakoli 3:1, 7) Salá nyonso mpo bózwa ntango ya kolobela likambo oyo ebimi. Monisá molongani na yo polele makanisi na yo mpe ndenge ozali komiyoka mpo na likambo yango. ‘Lobáká ntango nyonso solo’ na molongani na yo. (Baefese 4:25) Ata soki osiliki makasi, koluka kotɛmɛla ye te. Eyano ya kimya ekoki kosala ete lisolo na bino esuka na koswana te.Masese 15:4; 26:20.

Ata soki boyokani te, zalá kaka na boboto; kobosana ata moke te komonisa bolingo mpe limemya epai ya molongani na yo. (Bakolose 4:6) Salá nyonso mpo bósilisa mokakatano yango nokinoki, mpe kotika kosolisa ye te.Baefese 4:26.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Poná ntango oyo ebongi mpo na kolobela likambo oyo ebimi

  • Ntango molongani na yo azali koloba, yoká ye, kokata ye maloba te. Yo mpe okoloba na ngala na yo

2 YOKÁ MOLONGANI NA YO MPE LUKÁ KOMITYA NA ESIKA NA YE

OYO BIBLIA ELOBI: “Bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Baroma 12:10) Lolenge oyo oyokaka molongani na yo ezali na ntina mingi. Luká komitya na esika ya molongani na yo mpe zalá na komikitisa. (1 Petro 3:8; Yakobo 1:19) Kosala te lokola ozali koyoka nzokande ozali koyoka te. Soki likoki ezali, tiká naino makambo oyo ozali kosala mpo oyoka molongani na yo malamumalamu, to mpe sɛngá ye bósolola nsima. Soki ozwaka molongani na yo lokola moninga na yo kasi monguna te, ‘okosilika noki te.’Mosakoli 7:9.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Ata soki makambo oyo azali koloba ezali kosepelisa yo te, yoká kaka mpe zalá na makanisi ya malamu

  • Luká koyeba oyo alingi mpenza koloba, kolanda kaka maloba te. Talá elongi na ye, bajɛstɛ oyo azali kosala, mpe yoká mongongo na ye

3 BÓSALA NDENGE BOYOKANI

OYO BIBLIA ELOBI: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka, kasi liloba ya mbɛbu mpamba ememaka na kokelela.” (Masese 14:23) Koyokana ndenge oyo bokoki kosilisa mokakatano moko ekoki te. Bosengeli kosala ndenge boyokani. Yango ekoki kosɛnga milende mingi mpenza, kasi ebongi mpenza kosala makasi. (Masese 10:4) Soki bozali kosala na bomoko, bokozwa “mbano malamu” mpo na mosala na bino ya makasi.Mosakoli 4:9.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Bóyokana makambo oyo mokomoko akosala mpo na kosilisa likambo oyo ebimi

  • Taleláká mbala na mbala ndenge oyo bozali kosala yango