Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

Batatoli ya Yehova bazali na mokili mobimba mpe bauti na mikili nyonso mpe bikólo nyonso. Nini esangisá bato yango nyonso?

Mokano ya Nzambe ezali nini?

Nzambe alingi ete mokano na ye eyebana mabele mobimba. Mokano yango ezali nini, mpe lelo oyo banani bazali koteya basusu mokano yango?

LITEYA 1

Batatoli ya Yehova bazali bato ya ndenge nini?

Batatoli ya Yehova boni oyebi? Makambo nini oyebi mpenza mpo na biso?

LITEYA 2

Mpo na nini tobengami Batatoli ya Yehova?

Talelá ntina misato oyo tokómá kobengama na nkombo wana.

LITEYA 3

Ndenge nini solo ya Biblia emonanaki lisusu?

Ndenge nini tokoki mpenza koyeba oyo Biblia eteyaka?

LITEYA 4

Mpo na nini tobimisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika?

Nini ekesenisi libongoli oyo ya Liloba ya Nzambe na mabongoli mosusu?

LITEYA 5

Makambo nini okomona na makita na biso?

Toyanganaka mpo na koyekola Makomami mpe kolendisana. Tokoyamba yo na esengo mpenza!

LITEYA 6

Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?

Liloba ya Nzambe elendisi bakristo báyanganaka elongo. Talá bolamu oyo okoki kozwa na boninga ya ndenge wana.

LITEYA 7

Makita na biso esalemaka ndenge nini?

Osilá komituna nini esalemaka na makita na biso? Na ntembe te okosepela na mateya ya Biblia oyo ebongisami malamu mpenza, oyo okozwa kuna.

LITEYA 8

Mpo na nini tolataka malamu na makita na biso?

Bilamba oyo tolataka ezali na ntina na miso ya Nzambe? Talá mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso ntango tozali kopona bilamba ya kolata mpe kosala monzɛlɛ.

LITEYA 9

Wapi lolenge ya malamu mpenza ya kobongisa makita?

Kobongisa makita liboso ekosalisa biso tósepela mpenza na makita yango.

LITEYA 10

Losambo na kati ya libota ezali nini?

Talá ndenge oyo ebongiseli yango ekoki kosalisa yo opusana penepene na Nzambe mpe okómisa boyokani na libota makasi.

LITEYA 11

Mpo na nini tokendeke na mayangani na biso ya minene?

Mbula na mbula, tokendaka mayangani misato ya minene. Matomba nini okoki kozwa na mayangani yango?

LITEYA 12

Mosala na biso ya kosakola ebongisami ndenge nini?

Tolandaka ndakisa oyo Yesu atiká ntango azalaki awa na mabele. Wapi mwa mayele ya kosakola oyo asalelaki?

LITEYA 13

Mobongisi-nzela azali nani?

Batatoli mosusu balekisaka ngonga 30, 50, ata mpe koleka, na sanza na mosala ya kosakola. Nini etindaka bango bámipesa bongo?

LITEYA 14

Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?

Formasyo nini ya ntina mingi ebongisami mpo na baoyo bapesaka ntango na bango nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi?

LITEYA 15

Ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko ya lisangá?

Bankulutu bazali bandeko oyo bazali na boyokani makasi na Yehova mpe bakambaka lisangá. Ndenge nini basalisaka biso?

LITEYA 16

Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?

Basaleli na misala basalisaka lisangá etambola malamu mpenza. Talá ndenge oyo mosala na bango esalisaka bandeko nyonso oyo bayaka na makita.

LITEYA 17

Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso?

Mpo na nini bakɛngɛli ya zongazonga bakendeke kotala masangá? Ndenge okoki kozwa matomba na boyei na bango?

LITEYA 18

Ndenge nini tosalisaka bandeko na biso na ntango ya mpasi?

Ntango likama ekwei, tobongisaka mbala moko lisungi, ezala na elimo to na mosuni mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi mpasi. Na ndenge nini?

LITEYA 19

Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?

Yesu alobaki ete akopona moombo moko oyo akopesa bilei ya elimo na ntango ebongi. Ndenge nini azali kosala yango?

LITEYA 20

Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?

Na siɛklɛ ya liboso, mwa etuluku ya bankulutu mpe bantoma bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi mpo na lisangá ya bokristo. Tokoloba nini lelo oyo?

LITEYA 21

Betele ezali nini?

Betele ezali esika moko kitoko oyo ekokisaka mokano moko ya ntina mingi. Luká koyeba makambo mosusu etali bato oyo basalaka kuna.

LITEYA 22

Nini esalemaka na biro ya filiale?

Ndeko moko atambwisaka bato oyo bayaka kotala biro ya filiale mpo na kolakisa bango bisika nyonso. Tobengi yo oya kotala!

LITEYA 23

Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka mpe ebongolamaka?

Tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ koleka 750. Mpo na nini tosalaka milende ya ndenge wana?

LITEYA 24

Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?

Na makambo etali mbongo, nini ekesenisaka ebongiseli na biso na mangomba mosusu?

LITEYA 25

Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?

Mpo na nini tobengaka bisika na biso ya losambo Ndako ya Bokonzi? Talá ndenge bandako yango oyo etongami na mindɔndɔ te esalisaka masangá na biso.

LITEYA 26

Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako na biso ya Bokonzi?

Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto mpe ebatelami malamu epesaka Nzambe na biso nkembo. Bibongiseli nini ezwami mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi?

LITEYA 27

Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?

Okosepela kosala mwa bolukiluki mpo na kokolisa boyebi na yo ya Biblia? Kende na bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi!

LITEYA 28

Makambo nini okokuta na site Internet na biso?

Okoki koyeba makambo mingi oyo etali biso mpe makambo oyo tondimaka mpe kozwa biyano na mituna ya Biblia oyo omitunaka.

Okosala mokano ya Yehova?

Yehova Nzambe alingaka yo mingi. Ndenge nini okoki komonisa ete ozali na mposa ya kosepelisa Ye na bomoi na yo ya mokolo na mokolo?