Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 22

Nini esalemaka na biro ya filiale?

Nini esalemaka na biro ya filiale?

Bisanga ya Salomon

Canada

Afrika ya Sudi

Bandeko ya Betele bapesaka mabɔkɔ na badepartema ndenge na ndenge, mpe mosala na bango esimbaka mosala ya kosakola na ekólo moko to na bikólo mingi. Bakoki kosala na ekipi ya kobongola mikanda, konyata bazulunalo, kokangisa babuku, na badepo ya mikanda, kobimisa ba-CD to bavideo, to kosala makambo mosusu.

Komite ya filiale etambwisaka mosala ya kosakola. Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka Komite ya filiale oyo ezali na bankulutu misato to koleka oyo babongi mpenza mpo bákamba biro ya filiale. Bandeko yango bayebisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi ndenge makambo ezali kotambola mpe mikakatano nyonso oyo ebimaka na mboka oyo bango bazali kotambwisa mosala. Yango esalisaka bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bápona makambo oyo ekolobelama na mikanda oyo ekobima, na makita mpe na mayangani. Mbala na mbala, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaka bamonisi na yango mpo na kotala babiro ya filiale mpe kopesa bandeko ya Komite ya filiale malako mpo bákokisa mikumba na bango. (Masese 11:14) Momonisi ya biro monene asalaka mpe diskur mpo na kolendisa bandeko ya masangá ya filiale yango.

Etalelaka mosala ya masangá. Bandeko mibali mosusu na biro ya filiale bazali na mokumba ya kondima ete masangá ya sika efungwama. Bandeko mibali mosusu batalelaka mosala ya babongisi-nzela, bamisionɛrɛ, bakɛngɛli ya zongazonga oyo bazali kosala na teritware ya filiale yango. Babongisaka mayangani ya mike mpe ya minene, batambwisaka mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika, mpe basalaka nyonso mpo mikanda ekómela bandeko na masangá. Nyonso oyo esalemaka na biro ya filiale ezali mpo mosala ya kosakola esalema na molɔngɔ.​—1 Bakorinti 14:33, 40.

  • Ndenge nini Komite ya filiale esungaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

  • Makambo nini esalemaka na biro ya filiale?