Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Ndeko mokristo,

Ndenge oyebi yango, Biblia ezali buku oyo elobeli bato. Basi mpe mibali yango bazalaki sembo, mpe bakutanaki na mikakatano lokola oyo ya yo. Bazalaki ‘bato lokola biso.’ (Yakobo 5:17) Basusu balɛmbaki mpo na mpasi mpe mitungisi. Basusu balɛmbaki mpo bato ya libota na bango to baninga na bango bandimi bazokisaki bango na motema. Mpe basusu balɛmbaki mpo bayokaki ete bamemi ngambo mpo na mabunga oyo basalá.

Bato yango batikaki nde Yehova libela? Te. Mingi na bango bazalaki lokola mokomi ya nzembo oyo abondelaki ete: “Nayengiyengi lokola mpate oyo ebungi. Ee luká mosaleli na yo, mpo nabosani mitindo na yo te.” (Nzembo 119:176) Yo mpe ozali koyoka ndenge wana?

Yehova abosanaka ata moke te basaleli na ye oyo batiki lopango na ye. Alukaka nde bango, mpe mbala mingi asalaka yango na nzela ya baninga na bango bandimi. Na ndakisa, kanisá ndenge Yehova asalisaki mosaleli na ye Yobo, oyo akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge: abungisaki bozwi na ye nyonso, bana na ye nyonso bakufaki, mpe abɛlaki maladi ya makasi. Yobo mpe ayikaki mpiko na maloba mabe ya bato oyo basengelaki kobɔndisa ye. Kasi, apesaki Yehova mokɔngɔ te, atako na ntango mosusu makanisi na ye ekendaki mwa pembeni. (Yobo 1:22; 2:10) Ndenge nini Yehova asalisaki Yobo atɛlɛma lisusu?

Yehova asalisaki Yobo na nzela ya Elihu, oyo azalaki mpe mondimi. Ntango Yobo abimisaki makambo oyo ezali kotungisa ye, liboso Elihu ayokaki; mpe na nsima alobaki. Alobaki nini? Alobaki nde na Yobo mabe to alukaki komemisa ye ngambo to koyokisa ye nsɔni mpo na kotinda ye asala makambo oyo esengeli? Elihu amimonaki nde ete aleki Yobo? Te! Elimo ya Nzambe etindaki Elihu aloba ete “Na miso ya Nzambe ya solo, nazali lokola yo; ngai mpe nayemamaki na mabele ya lima.” Na nsima, akitisaki Yobo motema na maloba oyo: “Likambo ya nsɔmɔ ata moko te epai na ngai ekobangisa yo, mbamba oyo nazali kotya ekozala kilo te epai na yo.” (Yobo 33:6, 7) Na esika ya kobakisela Yobo kilo mosusu, na bolingo mpenza, Elihu apesaki Yobo nde toli oyo asengelaki na yango mpe alendisaki ye.

Tolingi oyeba ete ezali na makanisi ya ndenge wana nde tobongisi mwa buku oyo. Liboso, toyokaki na likebi bandeko mosusu oyo balɛmbaki na elimo, mpo na koyeba ntina oyo elɛmbisaki bango. (Masese 18:13) Na nsima, tobondelaki mpe tolukaki na Biblia masolo oyo emonisi ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye ya kala ntango bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Na nsuka, tosangisaki masolo wana ya Biblia na makambo oyo tokutanaka na yango lelo, mpo na kobimisa mwa buku oyo. Na yango, tosɛngi yo oyekola mwa buku oyo malamu mpenza. Yebá ete tolingaka yo mingi.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova