Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Buku oyo eumeli mingi mpe emonisaka bolingo ya Nzambe

Buku oyo eumeli mingi mpe emonisaka bolingo ya Nzambe

Buku oyo eumeli mingi mpe emonisaka bolingo ya Nzambe

BILOKO nsambo ya kokamwa ya mokili ya ntango ya kala ebengamaki bongo mpo ezalaki mpenza kobenda likebi ya bato. Kasi, biloko yango nyonso ezalaka lisusu te, longola kaka bapiramide. Nzokande, Biblia, atako bato mpamba nde bakomaki yango mpe ekomamaki na biloko oyo ebebaka, ezali tii lelo oyo mpe makambo na yango ebongwaná te. Tokoki mpenza kondimela buku yango oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso.​—Yisaya 40:8; 2 Timote 3:16, 17.

Lokola Yehova akomisaki makanisi na ye, yango emonisi ete alingaki te bato báyeba makanisi yango kaka na masolo, oyo moto na moto akoki kobɛta yango na ndenge na ye. Lisusu, lokola bato oyo Nzambe asalelaki mpo bákoma Biblia basalelaki elobeli ya pɛtɛɛ, ezala bato oyo batángá kelasi mingi te bakoki kotánga yango mpe kokanga ntina na yango. (Misala 4:13) Esengeli mpenza kozala bongo, mpamba te Mozalisi nde asalelaki elimo na ye mpo na kotinda bato bákoma Biblia. Longola yango, ndenge oyo Biblia ekabolami mingi emonisi mpenza ete Nzambe alingaka mpenza bato, ezala ya ekólo nini to ya monɔkɔ nini. (1 Yoane 4:19) Atako Biblia ekabolami mingi, valɛrɛ na yango ekiti te; kutu ekómi nde na valɛrɛ mingi.

Makambo oyo ezali na Biblia emonisi bolingo monene ya Nzambe. Ndenge tomonaki yango na masolo eleki, Liloba ya Nzambe emonisi epai touti, ntina oyo bomoi ezali mokuse mpe etondi na mikakatano, mpe ndenge oyo Nzambe akosilisa makambo yango na nzela ya Bokonzi na ye. Tomonaki mpe batoli ya malamu etali ndenge ya kozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina ata lelo oyo. (Nzembo 19:7-11; Yisaya 48:17, 18) Oyo eleki ntina, tomonaki ete Mozalisi na biso akolongola nsɔni oyo makambo nyonso ya lokuta oyo Satana abimisaki ebwakaki na nkombo na ye.​—Matai 6:9.

Ezali na buku mosusu te lokola Biblia, oyo elobeli makambo ya ntina mingi, oyo ebongi kosalelama na mikolo na biso, mpe ezali kopesa bato elikya na mokili oyo etondi na yikiyiki. Ya solo, na kokesana na biloko nsambo ya kokamwa ya mokili ya ntango ya kala, oyo mingi na yango esalamaki mpo na banzambe ya lokuta mpe bato ya nguya, Biblia ezali buku oyo eumeli mingi mpe emonisaka bolingo monene oyo Yehova azali na yango mpo na bato.

Soki obandi naino koyekola Biblia te, tolendisi yo obanda koyekola yango. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali koyekola Biblia na bato koleka milio 6 na mokili mobimba. Bamonaka ete ezali libaku malamu kosalisa bato ya mitema sembo bámona bango moko ntina oyo basengeli kotyela Biblia motema mpo ezali Liloba epemami ya Nzambe.​—1 Batesaloniki 2:13.