Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina ya kotyela Biblia motema

4. Eyokani na siansi

4. Eyokani na siansi

Na mikolo na biso, siansi ekoli mingi. Yango wana, mateya ya sika ezwi esika ya mateya ya kala. Makambo oyo bato bazalaki kondima liboso, bakómi mbala mosusu komona yango lokola masapo. Ezali kosɛnga bábimisaka mbala na mbala babuku ya sika ya siansi.

BIBLIA ezali buku ya siansi te. Kasi, na makambo ya siansi, ekeseni mpenza na babuku mosusu nyonso, ezala na makambo oyo yango elobi to elobi te.

Makambo oyo yango elobi ekeseni te na oyo siansi elobi.

Kala, bato mingi bazalaki kondima makanisi ndenge na ndenge oyo ezalaki solo te. Na ndakisa, bato mosusu bazalaki kokanisa ete mabelé ezali patatalu, nzokande basusu bazalaki kokanisa ete efandi likoló ya eloko moko boye. Bambula mingi liboso ete bato ya siansi báyeba ndenge oyo maladi epanzanaka mpe ndenge ya kosala mpo na kozwa yango te, minganga bazalaki kosalela mayele oyo ezalaki mpenza kobikisa bato te; mosusu kutu ezalaki kobomisa bato. Kasi, na mikapo koleka 1 100 oyo ezali na Biblia, ata na esika moko te balendisi likanisi moko oyo ekeseni na oyo siansi elobi, to mayele moko oyo ekoki kosala bato mabe.

Elobi makambo oyo eyokani na siansi.

Eleki mbula 3 500, Biblia elobaki ete mabelé efandi “likoló ya eloko te.” (Yobo 26:7NW) Na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yisaya alobelaki polele “sɛrklɛ [to libungutulu] ya mabelé.” (Yisaya 40:22NW) Na ntembe te, koloba ete mabelé ezali libungutulu mpe efandi likoló ya eloko te eyokani mpenza na siansi ya mikolo na biso.

Kati na Mibeko ya Moize (oyo ezwami na mikanda mitano ya ebandeli na Biblia) oyo ekomamaki na mobu soki 1500 L.T.B., ezali na mibeko oyo elobi solo na likambo etali kotya bato ya maladi mabe mosika na bato mosusu, ndenge ya kosala soki osimbi ebembe to ndenge ya kolongola salite.​—Levitike 13:1-5; Mituya 19:1-13; Deteronome 23:13, 14.

Ntango bato ya siansi basaleli bamasini ya minene oyo batalaka na yango minzoto mpe biloko mosusu ya likoló, to basaleli mayele mosusu, bamoni ete molɔ́ngɔ́ “ebandá” pwasa. Bato nyonso te ya siansi bazali kosepela na bandimbola oyo likambo yango ebimisi. Molakisi moko na iniversite alobaki ete: “Soki molɔ́ngɔ́ ezali na ebandeli, emonani ete esengeli kozala na moto oyo abandisaki yango, mpamba te nani akoki kondima ete likambo ya ndenge wana esalema yango moko kozanga mobandisi?” Nzokande, bambula mingi liboso ete bato básala bamasini wana oyo batalaka na yango minzoto, vɛrsɛ ya liboso na Biblia elobaki polele ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.”​—Genese 1:1.

Kala mpenza, Biblia elobaki solo ete mabelé ezali libungutulu mpe efandi “likoló ya eloko te”

Atako Biblia ezali buku ya kala mpe elobeli makambo ndenge na ndenge, esika moko te elobi likambo oyo ezangi koyokana na siansi. Okanisi te ete ebongi tótalela ata mwa moke buku ya ndenge wana? *

^ par. 9 Soki olingi koyeba bandakisa mosusu oyo emonisi ete Biblia eyokani na siansi, talá mwa buku Un livre pour tous, nkasa 18-21; ebimisami na Batatoli ya Yehova.