Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya kotika koswana

Ndenge ya kotika koswana

MOKAKATANO

Yo ná molongani na yo bokokaka te kosolola makambo na kimya? Omitungisaka ntango nyonso mpo oyebaka te soki likambo oyo okoloba to okosala ekosilikisa molongani na yo to ekobimisa koswana makasi?

Soki ezali bongo, yebá ete makambo ekoki kobonga. Kasi osengeli koyeba naino liboso ntina oyo yo ná molongani na yo boswanaka mingi.

NINI EBIMISAKA YANGO?

Kozanga koyokana.

Mwasi moko na nkombo Jillian * alobi boye: “Na bantango mosusu, nalobaka na mobali na ngai likambo moko oyo nakanisaki te ete akotalela yango na ndenge ya mabe. To mpe namonaka mpenza lokola nayebisaki ye likambo moko, nzokande ezalaki na yango kaka ndɔtɔ. Yango nde ekómelaka ngai!”

Makanisi ekeseni.

Ata soki yo ná molongani na yo boyokanaka malamu, kasi na makambo mosusu, bokoki kozala na makanisi ekeseni. Mpo na nini? Mpo bato mibale bazalaka ndenge moko te​—yango ekoki kosala ete libala ezala na esengo to na mikakatano. Mpo na babalani mingi, yango ebimiselaka bango mikakatano.

Ndakisa mabe ya baboti.

Mwasi moko na nkombo Rachel alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki koswana mingi mpe kolobana maloba mabe; yango wana ntango nabalaki, nazalaki koloba na mobali na ngai kaka ndenge mama azalaki koloba na papa. Nayebaki te ndenge ya komonisa limemya.”

Ntina mpenza oyo boswani.

Mbala mingi bato baswanaka mpo na likambo mosusu, kasi te mpo na likambo oyo esali ete baswana. Na ndakisa, koswana oyo ebandaka na: “Ozalaka na yo kaka na retare!” ezalaka te mpo moko atosaka ngonga te, kasi mpo molongani mosusu amoni ete basaleli ye makambo na ndenge ebongi te.

Ezala ebimi mpo na likambo nini, koswana mbala na mbala ekoki komemela yo maladi to mpe kosala ete libala ekufa. Kasi, okoki kosala nini mpo botika koswana?

OKOKI KOSALA BOYE

Koyeba makambo oyo epelisaka mɔtɔ ezali sekele mpo na kokima koswana. Ntango yo ná molongani na yo bozali na kimya, bómeka kosala boye:

1. Moto na moto azwa papye na ye mpe akoma likambo oyo eutaki kobimisa koswana. Na ndakisa, mobali akoki kokoma boye: “Olekisaki mokolo mobimba ná baninga na yo mpe obengaki ngai na telefone te mpo na koyebisa ngai esika ozalaki.” Mwasi akoki kokoma boye: “Osilikaki mpo nalekisaki ntango elongo na baninga na ngai.”

2. Na makanisi ya malamu, bólobela makambo oyo elandi: Likambo yango ezalaki mpenza monene? Tokokaki te kotika yango? Mpo na kobatela kimya na makambo mosusu, ekozala malamu bóndima ete makanisi na bino ekeseni mpe bózipa likambo yango na bolingo.​—Toli ya Biblia: Masese 17:9.

Soki yo ná molongani na yo bomoni ete likambo yango ezalaki monene te, bosɛngana bolimbisi mpe bóbosana yango.​—Toli ya Biblia: Bakolose 3:13, 14.

Soki moko to bino mibale bomoni ete likambo yango ezali monene, boleka na etape oyo elandi.

3. Komá ndenge oyo oyokaki ntango boswanaki, molongani na yo mpe asala bongo. Na ndakisa, mobali akoki kokoma: “Namonaki lokola ete osepelaki kozala ná baninga na yo na esika ya kozala ná ngai.” Mwasi akoki kokoma: “Namonaki ete ozwaki ngai lokola mwana moke oyo asengeli koyebisa papa na ye likambo nyonso.”

4. Moto na moto apesa moninga papye na ye, mpe atánga oyo moninga akomi. Ntango bozalaki koswana, mposa mpenza ya molongani na yo ezalaki nini? Bólobela oyo mokomoko na bino akokaki kosala mpo na kobongisa makambo yango kozanga koswana.​—Toli ya Biblia: Masese 29:11.

5. Bólobela mateya oyo bozwi. Ndenge nini bokoki kosalela mateya yango mpo na kobongisa to kokima koswana mbala ya nsima?

^ par. 7 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.