Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Mosala

Mosala

Atako Biblia ezali buku ya kala, batoli na yango esilaka ngala te. Makambo oyo Biblia elobi mpo na mosala ezali na ntina kaka ndenge ezalaki ntango Biblia ekomamaki.

Wapi ndenge malamu ya kotalela mosala?

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA

Mpo obatela mosala na yo, ebongi kotya yango liboso ya makambo mosusu nyonso. Ezaleli yango esali ete bato mosusu básilisa makasi na bango nyonso na mosala mpe bákipe te mabota mpe sante na bango.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elendisaka ezaleli ya kotya mosala na esika na yango. Ekumisaka baoyo basalaka mosala makasi mpe eboyaka kozala gɔigɔi. (Masese 6:6-11; 13:4) Kasi, Biblia elendisaka te moto akóma moombo ya mosala. Kutu, elendisaka moto azwaka ntango ya kopema mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Mosakoli 4:6 elobi boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” Yango wana tosengeli te kosala mosala koleka ndelo tii na kokipe te libota to sante na biso. Ezali na ntina te komiboma ndenge wana mpo na mosala!

“Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.”​Mosakoli 2:24.

Ezali na ntina kopona mosala ya kosala?

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA

Mosala ya malamu ezali oyo ezali na salɛrɛ ya malonga. Makanisi ya ndenge wana mpe mposa ya kozwa mbongo na pɛtɛɛ nyonso etindaka bato mosusu bámikɔtisa na mimbongo oyo ebongi te mpe bándima kutu mosala oyo eyokani te na mibeko ya Leta.

Bamosusu balobaka ‘salá nyonso oyo okoki mpo na kokokisa makambo okanaki na bomoi na yo’ mpe ‘makambo oyo olingaka.’ Soki mosala na bango ezali te oyo “balingaki” na bomoi na bango to soki ezali kosepelisa bango mpenza te, elɛmbisaka bango. Yango esalaka ete bátalela mosala na bango na ndenge ebongi te mpe bámipesa mpenza te na mosala yango. Bakoki kutu koboya misala ya malamu oyo emonani kaka mpo bamoni ete ezali ya nivo na bango te.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia endimaka te moto asala mosala oyo ezangi bosembo to oyo esalaka basusu mpasi na lolenge moko to mosusu. (Balevi 19:11, 13; Baroma 13:10) Mosala ya malamu ememelaka basusu litomba mpe esalisaka moto oyo azali kosala yango ‘azala na lisosoli ya malamu.’​—1 Petro 3:16.

Biblia eteyaka mpe ete mosala ekokisaka mokano ya ntina; ezalaka libosoliboso te mpo na bolamu ya moto ye moko kasi mpo na kozwa eloko ya kobikela mpe kosunga libota. Atako tokoki kosepela na mosala na biso, esengeli te kozala eloko oyo eleki ntina na bomoi na biso.

“Tata na ngai azalaka na mosala mingi. Longola mosala na ye, azali na mikumba na lisangá ya Batatoli ya Yehova. Ata bongo, asalaka mosala na ye malamu mpenza. Asalaka oyo esengeli asala mpe ntango oyo etikalaka, alekisa yango elongo na ngai, yaya na ngai mpe mama na biso. Tata azangaka mosala ya kosala te, kasi atyaka mosala mokomoko na esika na yango.”​—Alannah.

Toboyi te, mbongo ekoki kosila valɛrɛ mpe biloko ekoki komata ntalo mpe yango ekoki kosala ete tómitungisa mpo na ndenge oyo tokobika, kasi Biblia esɛngi tólekisaka ndelo te. Elobi boye: “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Timote 6:8) Maloba yango elimboli te ete tosengeli komipimela bisengo nyonso. Kasi tosengeli koyeba esika makoki na biso esuki mpo na biloko oyo tokoki kosomba mpe mpo na biloko mosusu oyo tokoki kozala na yango.​—Luka 12:15.

OYO YANGO ELIMBOLI MPO NA YO

Zalá makasi na mosala. Sepelá na yango mpenza. Ata soki mosala na yo ezali ya valɛrɛ mingi te to ya nivo na yo te, salá nyonso mpo oyeba yango malamu. Kosala mosala makasi esalaka ete moto amiyoka ete alongi na mosala na ye mpe kokolisa mayele na mosala na yo ekoki kobakisela yo esengo na mosala.

Kasi, kolekisa mpe ndelo te. Pemáká na bantango mosusu mpe zwáká mwa mopɛpɛ. Bantango yango ezalaka malamu mingi nsima ya kosala mosala makasi. Longola yango, kozwa biloko ya kobikela esalaka ete tómipesa kilo mpe basusu bápesa biso limemya ata mpe bato ya libota na biso.​—2 Batesaloniki 3:12.

“Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ . . . Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.”​Matai 6:31, 32.