Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mbanga ya ngando

Mbanga ya ngando

NGANDO eswaka makasi koleka banyama nyonso ya lelo. Na ndakisa, ngando oyo ezalaka na mbu, oyo ezalaka pene ya Australie ekoki koswa makasi mbala misato koleka koswa ya nkɔsi to tigre. Lisusu, mbanga ya ngando eyebaka eloko nyonso oyo emateli yango koleka ndenge nsɔngɛ ya mosapi ya moto esalaka. Lokola mposo ya ngando ezalaka makasi, ndenge nini ekoki kosalema bongo?

Mbanga ya ngando ezipamá na ebele ya misisa mikemike oyo esalisaka yango eyeba muvema nyonso. Nsima ya koyekola ndenge misisa yango esalaka, Duncan Leitch, moto moko ya mayele, alobaki boye: “Nsuka ya mosisa mokomoko ebimaka na lidusu moko ya mokuwa ya motó.” Ndenge oyo yango ebongisamá esalaka ete misisa mikemike ya mbanga na yango ebatelama mpe ezala na likoki ya koyebaka muvema nyonso koleka biteni mosusu ya nzoto na yango mpe aparɛyi moko te ekoki koyeba yango. Yango esalaka ete ngando eyeba kokesenisa biloko mpe basalite oyo ezali na monɔkɔ na yango. Ezali mpe mpo na yango nde ngando ya mwasi ememaka bana na yango na monɔkɔ kozanga koswa yango. Nguya oyo mbanga ya ngando ezalaka na yango mpe ndenge eyebaka muvema nyonso ekamwisaka mpenza!

Okanisi nini? Mbanga ya ngando ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?