Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Komona bolingo ya ndenge wana esepelisaki biso mpenza”

“Komona bolingo ya ndenge wana esepelisaki biso mpenza”

NA MOKOLO ya pɔsɔ, 25/04/2015, mabele eninganaki makasi na Népal, ekólo moko na nɔrdi ya Inde, oyo eteni monene ya mabele na yango ezali ngombangomba. Eteni monene (kilomɛtrɛ 80) ya mabele na nɔrdi-wɛsti ya engumba-mokonzi Kathmandou eninganaki. Likambo ya mawa, bato koleka 8 500 bakufaki, yango esalaki ete ezala likama oyo ebomá bato mingi koleka na Népal. Bandako koleka 500 000 ebebaki. Batatoli ya Yehova bazali 2 200 na Népal mpe mingi na bango bazalaki kofanda na esika oyo likama wana esalemaki. Likambo ya mawa, Motatoli ya Yehova moko ná bana na ye mibale bakufaki.

Motatoli moko na nkombo Michel, alobi boye: “Koningana ya mabele esalemaki ntango masangá mingi na esika yango ezalaki na makita. Soki esalemaka ntango mingi na biso tozali na bandako, mbɛlɛ tokufaki ebele.” Mpo na nini baoyo bayaki makita babikaki? Ezali mpo na ndenge oyo Ndako ya Bokonzi etongamá.

SIKOYO TOMONI NTINA NA YANGO!

Mikolo oyo na Népal, Bandako ya Bokonzi ezali kotongama na ndenge oyo koningana ya mabele ekoki kobuka yango te. Man Bahadur, oyo apesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, alobi boye: “Mbala mingi bazalaki kotuna biso mpo na nini tozali kosala bafondasyo ya makasi ndenge wana na bandako oyo ezali mpenza minene te. Sikoyo tomoni ntina na yango!” Nsima ya koningana ya mabele, bandimaki ete bato báfanda na Bandako ya Bokonzi. Atako mabele ekobaki koningana mokemoke, Batatoli ya Yehova ná baninga na bango ya kartye bamonaki ete Bandako ya Bokonzi ezalaki esika ya libateli.

Batatoli ya Yehova mpe bato ya kartye na bango bazwi libateli na Bandako ya Bokonzi

Bandeko oyo bakambaka lisangá babandaki mbala moko koluka bandeko oyo bazalaki komonana te. Motatoli moko na nkombo Babita, alobi boye: “Bandeko yango batyaki matomba ya lisangá na esika ya liboso. Komona bolingo ya ndenge wana esepelisaki biso mpenza.” Nsima ya mokolo oyo mabele eninganaki, bandeko misato ya Komite oyo etambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na Népal ná bandeko oyo batambolaka mpo na kolendisa masangá, bakómaki kotala masangá mpo na koyeba mposa ya bandeko mpe kosunga bakambi ya masangá.

Ndeko Gary Breaux oyo autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova atalaki baoyo bazwaki likama

Mikolo motoba nsima ya koningana ya mabele, ndeko Gary Breaux ya Biro monene ya Batatoli ya Yehova na États-Unis ná mwasi na ye Ruby bayaki na Népal. Reuben, moko ya bandeko ya Komite oyo tolobeli likoló, alobi boye: “Lokola Kathmandou ekɔtaki mobulu, mpe mabele ekobaki koningana mokemoke, tondimaki te ete ndeko Breaux akoya mpenza. Kasi azalaki na ekateli ya koya mpe ayaki! Batatoli ya ekólo Népal basepelaki mpenza ndenge ayaki.”

‘TOMONI ETE BONDEKO NA BISO EYEI MAKASI KOLEKA’

Silas oyo asalaka na biro ya Batatoli ya Yehova na Népal, alobaki boye: “Ntango kaka batelefone ekómaki koleka, bandeko bakómaki kobenga biso butu moi! Bandeko na biso ya mokili mobimba bazalaki komitungisa mpo na biso. Atako basusu bazalaki koloba minɔkɔ oyo toyebi te, tomonaki mpenza ete balingaka biso mpe bazali na mposa ya kosalisa biso.”

Minganga oyo bautaki Mpoto bazali kosalisa bandeko oyo bakutanaki na likama

Batatoli ya Yehova ya Népal bamemaki bilei na Bandako ya Bokonzi mikolo mingi nsima ya koningana ya mabele mpo na kokabola na baoyo bazalaki na bosɛnga. Longola yango, basalaki komite ya kopesa lisungi mpe eumelaki te biloko ekómaki koya ebele, ezalaki kouta mingimingi na Bangladesh, Inde mpe Japon. Mwa mikolo na nsima, minganga oyo bazali Batatoli ya Yehova bautaki Mpoto, bayaki na Népal mpe basalelaki Ndako ya Bokonzi moko mpo na kosalisa bato. Mbala moko babandaki mosala, basalaki bandeko oyo bazwaki likama baekzamɛ mpe basalisaki bango báyeba ndenge ya kolongola kobanga.

Ndeko mwasi moko Uttara amonisi ndenge mingi na bango bamiyokaki; alobaki boye: “Koningana ya mabele ezalaki nsɔmɔ mpe ebangisaki. Kasi na nsima, tomonaki ete bondeko na biso eyaki makasi koleka.” Ya solo, koningana ya mabele elɛmbisaki te bolingo oyo Batatoli ya Yehova bazalaka na yango mpo na Yehova mpe mpo na bandeko na bango. Kutu ekómisaki yango nde makasi.