Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge furmi oyo engɛngaka lokola palata ebatelamaka na moi ya esobe ya Sahara

Ndenge furmi oyo engɛngaka lokola palata ebatelamaka na moi ya esobe ya Sahara

FURMI yango oyo engɛngaka (Cataglyphis bombycina) ezali moko ya banyama oyo eyebani ete ekufaka te na moi makasi mpenza. Ntango banyama oyo elukaka kolya bafurmi yango ekendaka komibomba na malili mpo na kokima moi ya midi na esobe ya Sahara, bafurmi yango ebimaka na madusu na yango mpo na koluka bilei, na ndakisa mwa banyama mosusu ya mikemike oyo ekufaka mpo na molunge makasi.

[50] μm

Tókanisa naino: Soki furmi yango ebangaka te molunge ya sahara ezali mpo mokɔngɔ mpe mipanzi ya nzoto na yango ezipamá na nsukinsuki mpe libumu na yango ezangá nsuki. Nsuki yango, oyo esalaka ete furmi yango engɛnga lokola palata, ezali lokola batíyo ya mikemike mpenza ya triangle oyo ekutanákutaná. Ngámbo mibale ya libándá ya batíyo yango ezali na mabakumabaku ya mikemike banda na ebandeli tii na nsuka ya nsuki, kasi nse na yango ezali sɛlisɛli. Yango ekokisaka makambo mibale. Ya liboso, esalisaka nsuki yango ebengana kongɛnga ya moi, ata kongɛnga ya moke. Ya mibale, esalisaka furmi yango ebimisa molunge oyo ekɔtaki na nzoto na yango. Kasi libumu na yango oyo ezangá nsuki ebenganaka kongɛnga ya moi oyo ebɛtaka mabele ya esobe yango. *

[10] μm

Likoki oyo furmi yango ezalaka na yango ya komibatela na moi ya esobe ya Sahara esalaka ete molunge (53.6°C) esala nzoto ya furmi yango mabe te. Bato ya mayele bazali kosala makasi bámekola mwa nyama yango, básala biloko oyo ekitisaka molunge kozanga kotya makelele; elingi koloba kozwa mwa malili kozanga kosalela baapararɛyi oyo epesaka malili (ventilateur) to baaparɛyi mosusu.

Okanisi nini? Likoki oyo furmi ya esobe ya Sahara ezalaka na yango ya komibatela na moi makasi, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

^ par. 4 Biloko mosusu oyo ebatelaka furmi yango na moi makasi ezali baproteini ya nzoto na yango oyo enyangwanaka noki te, makolo na yango ya milai oyo esalaka ete nzoto etuta mabele ya mɔtɔ te mpe esalisaka yango ekima mbangu, likoki ya kokamwa oyo mwa nyama yango ezalaka na yango ya koyeba nzela mpe yango esalisaka furmi eleka na nzela oyo ekokómisa yango noki na libulu na yango.