Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NINI EPESAKA ESENGO?

Olingi koyeba makambo mosusu?

Olingi koyeba makambo mosusu?

OSILÁ KOMITUNA:

  • Nakoki kosala nini mpo libota na ngai ezala na esengo?

  • Nakoki kosala nini mpo na kozwa baninga ya malamu mpe ngai moko nazala moninga ya malamu?

  • Elikya nini ezali mpo na bandeko mpe baninga na ngai oyo bakufá?

  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?

  • Nsukansuka bato nde bakoboma mokili oyo?

  • Mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe ya solo?

OKOKI KOZWA BIYANO NA MITUNA WANA MPE MITUNA MOSUSU

Kɔtá na site Internet na biso, jw.org, oyo ezali sikoyo na minɔkɔ koleka 900. Na site yango, okokuta makambo mingi oyo ekoki kosalisa yo mpe masolo ebele mpenza.

Okokuta mpe bavideo oyo elobeli bato ndenge na ndenge oyo bayebi sikoyo nini epesaka esengo ya solosolo mpe bamonaka ete baponi nzela ya malamu! Kutu, basusu kati na bango bazalaki baombo ya bangi to bazalaki na bolɔkɔ. Basusu bazali bato oyo batángaki bakelasi ya milai, na ndakisa bato ya siansi.

Na jw.org, okoki kotánga to kozwa Biblia na minɔkɔ ndenge na ndenge mpe mikanda ndenge na ndenge, nyonso wana ofele. Mikanda yango elobeli makambo ebele, na ndakisa: