Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NINI EPESAKA ESENGO?

Kozala na sante malamu mpe koyeba kokanga motema

Kozala na sante malamu mpe koyeba kokanga motema

KOBƐLA MALADI OYO EUMELI MINGI TO KOKÓMA EBƆSƆNƆ EKOKI KOBONGOLA BOMOI YA MOTO. Ulf, mobali moko oyo liboso azalaki na sante malamu mpe azalaki kosala misala lokola bato nyonso, alobaki boye ntango akómaki paralize: “Natungisamaki mingi na makanisi. Makasi nyonso esilaki ngai, nazalaki kokoka kosala eloko moko te . . . Namonaki ete ‘bomoi na ngai ebebi.’”

Likambo oyo ekómelaki Ulf eteyi biso ete moto moko te ayebi malamu ndenge oyo sante na ye ekozala lobi to lobi oyo kuna. Atako bongo, ezali na mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kokima makama mosusu mpe kozala na sante malamu. Kasi tokosala nini soki tobɛli makasi? Yango esengeli nde kosilisa biso esengo? Te. Lisolo oyo ekomonisa yango. Kasi liboso, tótalela naino batoli mosusu oyo ekoki kosalisa biso tózala na sante malamu.

ZALÁ “MOTO OYO ALEKISAKA NDELO TE NA BIZALELI NA YE.” (1 Timote 3:2, 11) Mbala mingi, kolekisa ndelo na kolya to na komɛla ebebisaka sante mpe ekoki kosilisa biso mbongo. “Kozala te kati na bamɛli minene ya vinyo, kati na bato oyo balyaka mosuni na lokoso. Mpo molangwi-masanga mpe moto oyo alyaka na lokoso bakokóma na bobola.”​—Masese 23:20, 21.

KOBEBISA NZOTO NA YO TE. “Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.” (2 Bakorinti 7:1) Bato babebisaka nzoto na bango ntango bamɛlaka makaya, bangi, batyaka tumbako na zolo to na monɔkɔ, mpe bamɛlaka masanga mingi. Na ndakisa, ebongiseli moko ya États-Unis (U.S. Centers for Disease Control and Prevention) elobi ete komɛla makaya “epesaka maladi, ekómisaka moto ebɔsɔnɔ mpe ebebisaka binama mingi ya nzoto.”

TALELÁ NZOTO NA YO MPE BOMOI NA YO LOKOLA MAKABO YA MOTUYA OYO EUTI NA NZAMBE. “Na nzela [ya Nzambe] nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Misala 17:28) Koyeba bongo etindaka biso tóboya kotya bomoi na biso na likama ntango tozali kosala mosala, kotambwisa motuka to tukutuku, to kopona masano to kominanola. Nani akosepela ete bisengo ya ntango mokuse ememela ye likama oyo ekotika ye ebɔsɔnɔ bomoi mobimba?

BENGANÁ MAKANISI MPE BAMPOSA YA MABE. Nzoto mpe makanisi na yo esalaka na boyokani. Yango wana, salá makasi oboya komitungisa koleka ndelo, nkanda makasi, bilulela, mpe makanisi mosusu ya mabe. Nzembo 37:8 elobi: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka.” Vɛrsɛ mosusu ebakisi: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.”​—Matai 6:34.

SALÁ MAKASI OTYA MAKANISI NA MAKAMBO YA MALAMU. Masese 14:30 elobi: “Motema ya kimya ezali bomoi ya nzoto ya mosuni.” Biblia elobi mpe ete: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.” (Masese 17:22) Ata siansi mpe endimi likambo yango. Monganga moko na Écosse alobi: “Soki ozali moto ya esengo, okobanda kobɛla mpambampamba te lokola bato oyo bazalaka na esengo te.”

YEBÁ KOKANGA MOTEMA. Lokola Ulf, oyo tolobelaki na ebandeli, soki mokakatano moko ezali koumela, ntango mosusu tozalaka na eloko mosusu ya kosala te; esɛngaka kaka tókanga motema. Atako bongo, tokoki koluka ndenge ya koyikela yango mpiko. Basusu batikaka ete mikakatano elɛmbisa bango nzoto, nzokande kosala bongo ebebisaka nde makambo. Masese 24:10 elobi: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.”

Basusu, na ebandeli bamonaka lokola ete elikya ezali lisusu te, kasi na nsima bakitisaka mitema, mpe bamesanaka na mokakatano yango mpe balukaka ndenge ya kolonga yango. Ulf asalaki bongo. Alobi ete nsima ya kobondela mingi mpe kokanisa malamumalamu mpo na nsango ya malamu oyo ezali na Biblia, “akómaki kotalela makambo oyo azalaki kokutana na yango lokola mabaku ya koyika mpiko, kasi te lokola mikakatano.” Longola yango, ndenge moko na bato mosusu mingi oyo bakutanaka na mikakatano ya minene, ayekolaki motema mawa mpe komitya na esika ya basusu, mpe bizaleli yango etindaki ye ayebisa basusu nsango ya kobɔndisa oyo ezali na Biblia.

Mobali mosusu nkombo na ye Steve anyokwamaki mpe mingi. Ntango azalaki na mbula 15, akweaki na nzete mpe yango ekómisaki ye paralize mokɔngɔ mobimba. Kasi, ntango akómaki na mbula 18, mabɔkɔ na ye ezongelaki kosala. Na nsima, akendaki kotánga na iniversite, mpe kuna amipesaki na komɛla makaya, bangi, masanga, mpe na kosala pite. Azalaki lisusu na elikya te tii ntango abandaki koyekola Biblia, mpe yango esalisaki ye atalela bomoi na ndenge mosusu mpe atika mimeseno wana ya mabe. Alobi: “Nakómaki na bomoi oyo ezali na ntina, nzokande liboso nazalaki komona ete nazali kozanga eloko moko na bomoi na ngai. Sikoyo, nazali na kimya, na esengo, mpe nazali kosepela na oyo nazali na yango.”

Maloba ya Steve ná Ulf etindi biso tókanisa maloba oyo ezali na Nzembo 19:7, 8: “Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka, ezongisaka molimo. . . . Bitinda ya Yehova ezali alima, esepelisaka motema; mitindo ya Yehova ezali pɛto, engɛngisaka miso.”