Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

3 Batelá boyokani na yo ná basusu

3 Batelá boyokani na yo ná basusu

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Lokola bato mingi bakómi komitungisa mpo na makambo ya mpasi oyo ezali kosalema, bazali lisusu te kobatela boyokani ya malamu ná bato oyo balingaka.

  • Bato mosusu bakómaka mosika ya baninga na bango.

  • Babalani basalelaka lisusu te balongani na bango makambo na boboto.

  • Baboti batyaka likebi mpenza te na mitungisi ya bana na bango to mpe bakipaka yango ata moke te.

Oyo osengeli koyeba

  • Kozala na boyokani ya malamu ná basusu ekoki kosalisa yo ozala na sante ya malamu na nzoto mpe na makanisi, mingimingi ntango ozali kokutana na mikakatano.

  • Mikakatano oyo makambo ya mpasi ezali kobimisa ekoki kobimisela libota na yo mitungisi oyo bokanisaki te.

  • Bansango ya makambo ya mpasi oyo ezali kosalema na mokili ekoki kobangisa to konyokola bana na yo na makanisi na ndenge oyo okanisaki te.

Oyo okoki kosala sikoyo

Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” ​—Masese 17:17.

Baninga bakoki kosalisa biso mpe kopesa biso batoli ya malamu. Baninga ya ndenge wana bakoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tokutanaka na yango.