Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?

Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?

PAPA ya Ian azalaki momɛli monene ya masanga. Atako Ian azalaki kokelela na eloko te ntango azalaki kokola, azalaki mpenza na mposa ete papa na ye amonisela ye bolingo; kasi amoniselaki ye yango te. Ian alobi boye: “Nazalaki mpenza kolinga ye te, mingimingi mpo na masanga na ye mpe ndenge oyo azalaki konyokola mama.” Ntango Ian akómaki mokóló, akómaki komituna soki Nzambe azalaka. Azalaki kokanisa boye: “‘Soki Nzambe azalaka mpenza, mpo na nini atiki ete bato bányokwama?’”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Ata soki bomoi na yo ezali mpenza na mikakatano te, mbala mosusu okoki koyoka mabe ntango omoni bato oyo basali eloko te bazali konyokwama. Kasi, soki okutani na mpasi lokola oyo ya Ian, to soki moto oyo olingaka abɛli to akufi, motuna wana ekokóma mpenza na ntina mingi mpo na yo.

Bamosusu bapesaka eyano nini?

Bamosusu bakanisaka ete Nzambe atiki bampasi ezala mpo na koteya biso tózala na komikitisa mpe tóyokelaka basusu mawa. Basusu bakanisaka ete bato bazali konyokwama na bomoi oyo mpo na masumu oyo basalaká na bomoi oyo bazalaká na yango liboso.

Biyano ya ndenge wana emonisaka nini?

Nzambe akipaka bampasi ya bato te, yango wana ezali mpasi bato bálinga ye. Azali mabe mpenza.

Biblia eteyaka nini?

Biblia emonisi polele ete bato basengeli te kopesa Nzambe foti mpo na bampasi na bango. Elobi boye: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Kutu, kopesa Nzambe foti mpo na bampasi, eyokani te na ndenge oyo Biblia elobelaka bizaleli na ye. Ndenge nini?

Moko ya bizaleli ya libosoliboso ya Nzambe ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Mpo na komonisa mpenza likambo yango, Biblia ekokanisi Nzambe na mama oyo azali komɛlisa mwana. Nzambe atuni boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpe ayokela mwana ya libumu na ye mawa te? Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.” (Yisaya 49:15) Okanisi ete mama oyo alingaka mwana na ye akoki kosala ye mabe na nko nyonso? Kutu, moboti oyo akipaka mwana na ye akoluka nde kokitisa mpasi ya mwana na ye. Ndenge moko mpe, ezali Nzambe te nde asalaka ete bato oyo basali eloko te bányokwama.​—Ebandeli 18:25.

Ata bongo, bato oyo basali eloko te bazali konyokwama. Okoki komituna boye: ‘Soki Nzambe akipaka biso mpe azali na nguya nyonso, mpo na nini alongoli te makambo oyo esalaka ete bato banyokwama?’

Nzambe azali na bantina oyo atiki ete bampasi ezala naino. Tótalela kaka ntina moko: Mbala mingi bato nde babimiselaka basusu bampasi. Bato mingi oyo banyokolaka basusu balingaka te kobongola bizaleli na bango. Na yango, mpo Nzambe alongola mpenza likambo oyo ebimiselaka bato bampasi, asengeli koboma bato ya ndenge wana.

Ntoma Petro amonisaki ntina oyo Nzambe atiki naino bato mabe bázala; akomaki boye: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Motema molai ya Yehova Nzambe emonisaka ete azali bolingo mpe motema mawa.

Ata bongo, mosika te, Yehova Nzambe akosala likambo moko. ‘Akozongisa bolɔzi na baoyo bazali kobimisela bato oyo basali likambo te bolɔzi.’ Baoyo bazali konyokola basusu “bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.”​—2 Batesaloniki 1:6-9.

Ian oyo tolobelaki azwaki mpenza biyano ya malamu na mituna oyo azalaki komituna mpo na bampasi. Makambo oyo ayekolaki esalaki ete akóma kotalela bomoi na ndenge mosusu. Tángá lisolo na ye na lisolo elandi, oyo elobi: “Biblia ebongolaka bato”.