Ndenge ekomamá na Matai 20:1-34

  • Basali na elanga ya vinyo bazwi lifuti ndenge moko (1-16)

  • Yesu alobeli lisusu liwa na ye (17-19)

  • Basɛngi bisika ya lokumu na Bokonzi (20-28)

    • Yesu, lisiko mpo na bato mingi (28)

  • Bato mibale oyo bakufá miso babikisami (29-34)

20  “Mpo Bokonzi ya likoló ezali lokola nkolo-ndako moko oyo abimaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na kozwa basali mpo básala na elanga na ye ya vinyo.+  Nsima ya koyokana na basali yango ete akofuta bango denari* moko na mokolo, atindaki bango na elanga na ye ya vinyo.  Mpe ntango abimaki lisusu pene na ngonga ya libwa* ya ntɔngɔ, amonaki bato mosusu batɛlɛmi na zando, mosala ya kosala ezali te.  Alobaki na bango: ‘Bino mpe bókende na elanga ya vinyo, mpe nakopesa bino lifuti oyo ebongi.’  Bongo bakendaki. Mpe abimaki lisusu pene na midi,* mpe pene na ngonga ya misato ya nsima ya midi,* mpe asalaki kaka bongo.  Nsukansuka, pene na ngonga ya mitano ya mpokwa,* abimaki na zando mpe akutaki bato mosusu batɛlɛmi mpe alobaki na bango: ‘Mpo na nini botɛlɛmi awa mokolo mobimba bozali kosala mosala te?’  Bazongisaki: ‘Mpo moto moko te azwi biso na mosala.’ Ye alobaki na bango: ‘Bino mpe bókende na elanga ya vinyo.’  “Ntango mpokwa ekómaki, nkolo ya elanga ya vinyo alobaki na kapita: ‘Bengá basali mpe futá bango lifuti na bango,+ banda na bato ya nsuka tii na bato ya liboso.’  Ntango bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya nsima ya midi* bayaki, bazwaki moto na moto denari* moko. 10  Bongo ntango bato oyo bazwamaki na mosala liboso bayaki, bakanisaki ete bakozwa mingi; kasi bango mpe bazwaki lifuti ya denari* moko. 11  Ntango bazwaki yango, babandaki komilelalela mpo na nkolo-elanga. 12  Balobaki: ‘Bato oyo bayaki na nsuka basali kaka ngonga moko. Kasi yo ofuti bango ndenge moko na biso bato tonyokwami na mosala mokolo mobimba na nse ya moi makasi!’ 13  Bongo alobaki na moko na bango: ‘Moninga, nasali yo mabe te. Oyokanaki na ngai ete nakofuta yo denari* moko, bongo te?+ 14  Zwá lifuti na yo mpe kende. Nalingi kopesa baoyo ya nsuka ndenge moko na yo. 15  Nazali na lotomo ya kosala na biloko na ngai ndenge nalingi, boye te? To liso na yo ezali bilulela* mpo ngai nazali moto malamu?’*+ 16  Ndenge wana nde bato ya nsuka bakozala bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakozala bato ya nsuka.”+ 17  Ntango Yesu azalaki komata na Yerusaleme, abendaki bayekoli 12 kaka bango moko pembeni, mpe na nzela alobaki na bango boye:+ 18  “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli. Bakokatela ye etumbu ya liwa+ 19  mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo mpo básɛka ye, bábɛta ye fimbo mpe bábaka ye na nzete.+ Mpe na mokolo ya misato, akosekwa.”+ 20  Bongo mama ya bana ya Zebede+ apusanaki pene na ye elongo na bana na ye mpe agumbamelaki ye.* Alingaki kosɛnga ye likambo moko.+ 21  Yesu alobaki na ye: “Olingi nini?” Ye azongisaki ete: “Lobá ete bana na ngai oyo mibale báfanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na Bokonzi na yo.”+ 22  Yesu azongisaki: “Likambo oyo bozali kosɛnga, boyebi yango te. Bokoki komɛla kɔpɔ oyo nakomɛla mosika te?”+ Balobaki na ye: “Tokoki.” 23  Alobaki na bango: “Ya solo bokomɛla kɔpɔ na ngai,+ kasi kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, kasi ezali ya baoyo Tata na ngai abongiselá bango yango.”+ 24  Ntango bantoma mosusu zomi bayokaki yango, basilikelaki bandeko yango mibale.+ 25  Kasi Yesu abengaki bango esika azalaki mpe alobaki: “Boyebi ete bayangeli ya bikólo balakisaka bato bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bakonzaka bato.+ 26  Esengeli kozala bongo te na kati na bino;+ kasi moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino,+ 27  mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.+ 28  Kaka ndenge Mwana ya moto ayaki, mpo bato básalela ye te, kasi mpo na kosalela+ bango mpe kopesa bomoi* na ye lisiko na esika ya bato mingi.”+ 29  Ntango bazalaki kobima na Yeriko, ebele ya bato balandaki Yesu. 30  Mpe talá! bato mibale oyo bakufá miso bafandaki pembeni ya nzela, bayokaki ete Yesu azali koleka wana, mpe bagangaki: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!”+ 31  Kasi ebele ya bato bagangelaki bango ete bátika makɛlɛlɛ. Kasi bango bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!” 32  Bongo Yesu atɛlɛmaki, abengaki bango mpe alobaki na bango: “Bolingi nasala nini mpo na bino?” 33  Balobaki na ye: “Nkolo, tolingi miso na biso efungwama.” 34  Yesu ayokaki mawa, asimbaki miso na bango,+ mpe na mbala moko bakómaki komona lisusu. Mpe balandaki ye.

Maloba na nse

Talá Ap. B14.
Lil., “pene na ngonga ya misato.” Bazalaki kotánga ngonga banda ntango moi ebimi.
Lil., “pene na ngonga ya motoba.”
Lil., “pene na ngonga ya libwa.”
Lil., “pene na ngonga ya zomi na moko.”
Lil., “ngonga ya zomi na moko.”
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
To, “mabe.”
To, “mokabi.”
To, “akumisaki ye.”
To, “molimo.”