Ndenge ekomamá na Matai 28:1-20

  • Yesu asekwi (1-10)

  • Bapesi basoda mbongo mpo bákosa (11-15)

  • Etinda ya kokómisa bato bayekoli (16-20)

28  Nsima ya Sabata, ntango pole ebandaki kobima mokemoke na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, Maria Magadalene ná Maria mosusu bakendaki kotala lilita yango.+  Mpe talá! mabele eninganaki makasi mpenza, mpo anzelu ya Yehova* akitaki uta na likoló, alongolaki libanga mpe afandelaki yango.+  Azalaki kongɛnga lokola mokalikali, mpe bilamba na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+  Lokola bakɛngɛli babangaki mingi, babandaki kolɛnga mpe bakómaki lokola bato oyo bakufi.  Anzelu alobaki na basi yango boye: “Bóbanga te, mpo nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na nzete.+  Azali awa te, mpo alamuki, kaka ndenge alobaki.+ Bóya kotala esika alalaki.  Mpe bókende nokinoki koyebisa bayekoli na ye ete alamuki uta na liwa, mpe talá! akei liboso na bino na Galile;+ kuna nde bokomona ye. Yango nde nsango nayeli bino.”+  Bongo batikaki lilita* nokinoki, na kobanga mpe na esengo monene, bakimaki mbangu kopesa bayekoli na ye nsango.+  Mpe talá! Yesu akutanaki na bango mpe alobaki: “Mbote!” Bapusanaki, bagumbamelaki ye* mpe bakangaki ye na makolo. 10  Bongo Yesu alobaki na bango: “Bóbanga te! Bókende kopesa bandeko na ngai nsango, mpo bákende na Galile. Kuna nde bakomona ngai.” 11  Ntango bazalaki kokende, bakɛngɛli+ mosusu bakɔtaki na engumba mpe bayebisaki banganga-nzambe bakonzi makambo nyonso oyo esalemaki. 12  Nsima ya koyangana mpe kosala likita elongo na bankulutu, banganga-nzambe bakonzi bapesaki basoda yango mbongo ya bibende ebele ya palata, 13  balobi: “Bóloba ete: ‘Bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye na butu na ntango oyo biso tolalaki mpɔngi.’+ 14  Mpe soki yango ekómi na matoi ya guvɛrnɛrɛ, tokolimbolela ye likambo yango* mpe bokozala na ntina ya komitungisa te.” 15  Bongo bazwaki mbongo ya bibende ya palata mpe basalaki ndenge bayebisaki bango. Mpe lisolo yango epalanganá epai ya Bayuda tii na mokolo ya lelo. 16  Nzokande, bayekoli 11 bakendaki na Galile+ na ngomba oyo Yesu alakaki bango bákutana.+ 17  Ntango bamonaki ye bagumbamelaki ye,* kasi basusu batyaki ntembe. 18  Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki na bango: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.+ 19  Na yango, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso,+ bóbatisa bango+ na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, 20  bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.+ Mpe talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.”*+

Maloba na nse

Talá Ap. A5.
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “bakumisaki ye.”
To, “tokondimisa ye.”
To, “bakumisaki ye.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.