LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI Sanza ya Juillet 2013 | Osengeli kotyela lingomba motema?

Bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kotyela lingomba motema mpo na makambo oyo bakutaná na yango na mangomba na bango. Yekolá makambo mosusu etali lingomba oyo ebongi kotyela motema.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mpo na nini ebongi mpenza otalela lingomba na yo?

Soki osambelaka na lingomba moko boye, ezali lokola otye boyokani na yo ná Nzambe mpe elikya na yo ya bomoi ya seko na mabɔkɔ ya lingomba yango.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Okoki kotyela lingomba motema na likambo etali mbongo?

Na esika ofandi, mangomba esalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kotinda bato na makasi bábimisa mbongo? Yango eyokani na oyo Biblia eteyaka?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Okoki kotyela lingomba motema na likambo etali bitumba?

Yesu ateyaki bayekoli na ye bálingaka bazalani na bango. Mangomba ya lelo etosaka mobeko yango?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Okoki kotyela lingomba motema na likambo etali bizaleli malamu?

Bakonzi mingi ya mangomba bapesaka ndakisa malamu te epai ya bandimi na likambo etali bizaleli malamu. Nzambe akipaka bizaleli na biso?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ezali na lingomba oyo ebongi kotyela motema?

Lingomba moko esilá kolɛmbisa yo nzoto? Soki ɛɛ, ekoki kozala mpasi otyela lingomba nyonso motema. Ndenge nini koyekola Biblia esalisaka?

MPO NA LIBOTA YA ESENGO

Oyo okoki kosala mpo makambo etambola malamu ná molongani na yo ya sika

Kobala lisusu ekoki komema mikakatano oyo ezalaki te na libala ya liboso. Ndenge nini babalani bakoki kolonga?

KOKÓMA MONINGA YA NZAMBE

Atondisaka “mitema na biso mɛkɛ”

Mokolo na mokolo Nzambe asalelaka bato nyonso bolamu​—ata mpe baoyo bazalaka na botɔndi te epai na ye.

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Namonaka lisusu te ete nasengeli kobongola mokili”

Ndenge nini koyekola Biblia esalisaki moto moko oyo abundaka mpo na mbongwana ayeba epai mbongwana ya solosolo mpo na bato ekouta?

LISOLO NA MONINGA YA KARTYE

Nzambe akipaka bampasi na biso?

Bato mosusu bandimaka te ete Nzambe azali mpo na bampasi oyo bamonaka. Yekolá na Liloba ya Nzambe ndenge oyo ayokaka mpo na bampasi na biso.

Biyano na mituna ya Biblia

Bato baluká ndenge nyonso ya kokima bobange, kasi ata moto moko te akómá na bomoi ya seko. Mpo na nini?

Makambo mosusu

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bateyaka bato ya mangomba mosusu?

Nini etindaka biso tóteya bato ya mangomba mosusu?