Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Mpo na nini kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya?

Olingi koyeba makambo mosusu etali Bokonzi ya Nzambe mpe oyo ekosala?

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka ete eya mpo yango nde ekozongisa bosembo mpe kimya na mabele. Ata guvɛrnema moko te ya bato ekosilisa mobulu, kozanga bosembo mpe maladi, kasi Bokonzi ya Nzambe ekoki mpe ekosala yango. Nzambe aponi Mwana na ye, Yesu mpo azala mokonzi ya Bokonzi yango. Yehova aponi mpe mwa etuluku ya bayekoli ya Yesu mpo báyangela ná Yesu na Bokonzi yango.​—Tángá Luka 11:2; 22:28-30.

Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola bato nyonso oyo batɛmɛlaka Bokonzi yango. Yango wana, kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya ezali kosɛnga ete guvɛrnema ya Nzambe ezwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato.​—Tángá Danyele 7:13, 14; Emoniseli 11:15, 18.

Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato matomba?

Yesu nde mokonzi oyo abongi mpenza mpo azali na motema mawa. Lokola azali Mwana ya Nzambe, azali na nguya ya kosalisa bato nyonso oyo bazali kosɛnga lisalisi epai ya Nzambe.​—Tángá Nzembo 72:8, 12-14.

Bokonzi ya Nzambe ekopesa matomba epai ya bato nyonso oyo babondelaka na bosembo ete Bokonzi yango eya mpe bazali na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe ezali mosala ya mpunda te.​—Tángá Luka 18:16, 17; Yoane 4:23.