Ndenge ekomamá na Luka 11:1-54

  • Ndenge ya kobondela (1-13)

    • Libondeli ya ndakisa (2-4)

  • Bademo babimisami na nzela ya mosapi ya Nzambe (14-23)

  • Ntango elimo ya mbindo ezongaka (24-26)

  • Esengo ya solosolo (27, 28)

  • Elembo ya Yona (29-32)

  • Mwinda ya nzoto (33-36)

  • Mawa na bandimi ya bokosi (37-54)

11  Mokolo moko Yesu azalaki kobondela na esika moko mpe ntango asilisaki, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye: “Nkolo, lakisá biso ndenge ya kobondela, ndenge Yoane mpe alakisaki bayekoli na ye.”  Bongo alobaki na bango: “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata, nkombo na yo esantisama.*+ Bokonzi na yo eya.+  Pesá biso mokolo na mokolo bilei* na biso na kolanda bamposa na biso ya mokolo.+  Mpe limbisá biso masumu na biso,+ mpo biso mpe tolimbisaka baoyo basaleli biso masumu.+ Mpe kotika te tókwea na komekama.’”+  Na nsima alobaki na bango: “Kanisá ete moko na bino azali na moninga mpe akei epai na ye na katikati ya butu mpe alobi na ye: ‘Moninga, defisá ngai mampa misato,  mpo moninga na ngai moko auti mobembo, ayei epai na ngai kaka sikoyo mpe nazali na eloko ya kopesa ye te’?  Kasi oyo wana na kati ya ndako azongisi: ‘Tiká kotungisa ngai. Porte esili kokangama, mpe bana na ngai balali na mbeto elongo na ngai. Nakoki kotɛlɛma te mpe kopesa yo mwa eloko.’  Nazali koyebisa bino: Ata soki akotɛlɛma te mpo na kopesa ye mwa eloko mpo azali moninga na ye, akotɛlɛma mpo moto yango azali na mbamba makasi+ mpe akopesa ye eloko nyonso oyo azali na mposa na yango.  Na yango nazali koloba na bino: Bókoba kosɛnga,+ mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.+ 10  Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka,+ mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye. 11  Kutu, tata nini kati na bino, soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye nyoka na esika ya mbisi?+ 12  To soki asɛngi liki, akopesa ye nkotó?* 13  Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te koleka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango?”+ 14  Na nsima, abimisaki demo moko oyo akómisaki moto moko baba.+ Ntango demo wana abimaki, moto yango akómaki koloba. Mpe ebele ya bato bakamwaki.+ 15  Kasi bato mosusu na kati na bango balobaki: “Azali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube* mokonzi ya bademo.”+ 16  Mpe basusu, mpo na komeka ye, babandaki kosɛnga ye alakisa bango elembo+ oyo euti na likoló. 17  Lokola ayebaki makanisi na bango,+ alobaki na bango: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko nsukansuka ebebaka, mpe ndako oyo ekabwani na kati na yango moko ekweaka. 18  Ndenge moko mpe, soki Satana akabwani na kati na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekotɛlɛma? Mpo bozali koloba ete nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube. 19  Soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bayekoli* na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani? Yango wana bango bakozala basambisi na bino. 20  Kasi soki ezali na nzela ya mosapi ya Nzambe+ nde nazali kobimisa bademo, boye Bokonzi ya Nzambe ekómeli bino mpenza.+ 21  Ntango mobali makasi oyo azali na bibundeli azali kokɛngɛla ndako na ye, biloko na ye nyonso ebatelamaka malamu. 22  Kasi ntango moto oyo aleki ye na makasi ayei kobunda na ye mpe alongi ye, moto yango azwaka bibundeli nyonso oyo mobali makasi wana azalaki kotyela motema, mpe akabolaka biloko oyo abɔtɔlaki ye. 23  Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+ 24  “Ntango elimo moko ya mbindo ebimi epai ya moto, elekaka na bisika ezangá mai mpo na koluka esika ya kopema, mpe na nsima, soki ezwi ata esika moko te, elobaka: ‘Nakozonga na ndako na ngai epai nabimaki.’+ 25  Mpe ntango ekómi kuna, ekuti ndako yango bakɔmbɔli mpe bakómisi yango kitoko. 26  Bongo ekendaka kozwa bilimo mosusu nsambo oyo eleki yango na mabe, mpe nsima ya kokɔta na kati, bilimo yango efandaka kuna. Bongo moto wana akómaka mabe koleka ndenge oyo azalaki liboso.” 27  Nzokande ntango azalaki koloba makambo wana, mwasi moko na kati ya ebele ya bato abelelaki ye, alobi: “Esengo na mwasi oyo amemaki zemi na yo mpe amelisaki yo mabɛlɛ!”+ 28  Kasi ye alobaki: “Te, esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”+ 29  Ntango bato bazalaki se kotondana, abandaki koloba boye: “Libota oyo ezali libota moko mabe. Ezali koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te, longola kaka elembo ya Yona.+ 30  Mpo kaka ndenge Yona+ akómaki elembo mpo na bato ya Ninive, Mwana ya moto mpe akozala elembo mpo na libota oyo. 31  Na Mokolo ya Kosambisama, mokonzi-mwasi ya sudi+ akosekwa esika moko na bato ya libota oyo mpe akokweisa bango na likambo, mpo autaki na nsuka ya mabele, ayei koyoka bwanya ya Salomo. Kasi talá! oyo aleki Salomo azali awa.+ 32  Na Mokolo ya Kosambisama, bato ya Ninive bakosekwa esika moko na libota oyo mpe bakokweisa yango, mpo babongolaki motema ntango bayokaki nsango oyo Yona asakolaki.+ Kasi talá! oyo aleki Yona azali awa. 33  Nsima ya kopelisa mwinda, moto moko te atyaka yango na esika ya kobombana to na nse ya kitunga.* Atyaka yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda,+ mpo baoyo bazali kokɔta bámona pole. 34  Mwinda ya nzoto ezali liso na yo. Ntango liso na yo ezali kotala kaka eloko moko,* nzoto na yo mobimba mpe ezali kongɛnga; kasi ntango liso na yo ezali bilulela,* nzoto na yo mpe ezali molili.+ 35  Yango wana, kebá ete pole oyo ezali kati na yo ezala molili te. 36  Yango wana, soki nzoto na yo mobimba ezali kongɛnga mpe ata eteni moko te ezali na molili, yango mobimba ekongɛnga se ndenge mwinda engɛngaka mpo na kopesa yo pole.” 37  Ntango Yesu asilisaki koloba bongo, Mofarisai moko abengaki ye akende kolya epai na ye. Bongo akɔtaki mpe afandaki* na mesa. 38  Nzokande, Mofarisai wana akamwaki komona ete Yesu asukolaki* mabɔkɔ te liboso ya kolya.+ 39  Kasi Nkolo alobaki na ye: “Bino Bafarisai, bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, kasi na kati na bino botondi na lokoso* mpe na mabe.+ 40  Bazoba! Moto oyo asalaki libándá asalaki mpe kati, boye te? 41  Ntango bozali kopesa makabo ya motema mawa,* bópesa biloko oyo euti na kati mpe makambo na bino nyonso ekozala pɛto. 42  Kasi mawa na bino Bafarisai, mpo bopesaka moko ya bandambo zomi ya manti, ya peganono mpe ya matiti mosusu ya nsolo kitoko,*+ kasi botyaka pembeni bosembo mpe bolingo ya Nzambe! Bosengelaki kopesa biloko wana, kozanga kotya pembeni makambo mosusu wana.+ 43  Mawa na bino Bafarisai, mpo bolingaka bakiti ya liboso* na basinagoga mpe bolingaka bápesa bino bambote na bazando!+ 44  Mawa na bino, mpo bozali lokola malita* oyo ezali komonana polele te,*+ mpe bato batambolaka likoló na yango kozanga koyeba!” 45  Bongo moko ya baoyo bayebi Mobeko malamumalamu alobaki na ye: “Moteyi, ndenge ozali koloba bongo, ozali mpe kofinga biso.” 46  Bongo alobaki: “Mawa na bino baoyo boyebi Mobeko malamumalamu, mpo bopesaka bato mikumba ya kilo mpo bámema, kasi bino moko bosimbaka mikumba yango ata na mosapi te!+ 47  “Mawa na bino, mpo botongaka malita* ya basakoli, kasi bankɔkɔ na bino nde babomaki bango!+ 48  Ya solo boyebi malamu makambo bankɔkɔ na bino basalaki, kasi atako bongo bozali kondima yango. Mpo bango babomaki basakoli+ kasi bino bozali kotonga malita na bango. 49  Yango wana na bwanya na ye, Nzambe alobaki mpe ete: ‘Nakotindela bango basakoli ná bantoma, mpe bakoboma mpe bakonyokola basusu na kati na bango, 50  mpo makila ya basakoli nyonso oyo esopamá banda na ebandeli ya mokili, ezala na motó ya* libota oyo,+ 51  banda na makila ya Abele+ tii na makila ya Zekaria, oyo abomamaki na katikati ya etumbelo mpe tempelo.’*+ Ya solo, nazali koyebisa bino ete nyonso wana ekozala na motó ya libota oyo. 52  “Mawa na bino baoyo boyebi Mobeko malamumalamu, mpo bolongoli fungola ya boyebi. Bino moko bokɔtaki te, mpe baoyo bazali kokɔta, bozali koluka kopekisa bango!”+ 53  Bongo ntango abimaki kuna bakomeli ná Bafarisai babandaki kotungisa ye makasi mpenza mpe kotunatuna ye mituna mosusu mingi, 54  bazalaki kotyela ye motambo, mpo na koluka kozwa ye na maloba na ye moko.+

Maloba na nse

To, “etalelama mosantu.”
Lil., “mampa.”
To, “skɔrpiɔ.”
Nkombo mosusu mpo na kolobela Satana, nkumu, to moyangeli, ya bademo.
Lil., “bana.”
To, “kitunga ya komekela.”
To, “ezali komona malamu.” Lil., “ezali mindɔndɔ te.”
Lil., “mabe.”
To, “atandamaki.”
Elingi koloba, asalaki molulu ya kopɛtola.
To, “kopunza.”
To, “makabo epai ya babola.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bandunda mosusu.”
To, “oyo eleki malamu.”
To, “malita ya kokanisama.”
To, “batyá bilembo te.”
To, “malita ya kokanisama.”
To, “esɛngama na.”
Lil., “ndako.”