Ndenge ekomamá na Luka 4:1-44

  • Zabolo ameki Yesu (1-13)

  • Yesu abandi kosakola na Galile (14, 15)

  • Baboyi Yesu na Nazarete (16-30)

  • Na sinagoga ya Kapernaume (31-37)

  • Yesu abikisi mama-bokilo ya Simo mpe bato mosusu (38-41)

  • Ebele ya bato bakuti Yesu na esika oyo bato bazalaka te (42-44)

4  Bongo Yesu, atondaki na elimo santu, alongwaki na Yordani mpe elimo ememaki ye epai na epai na esobe+  mikolo 40. Kuna, Zabolo amekaki ye.+ Na nsuka ya mikolo yango, lokola alyaki eloko te, ayokaki nzala.  Bongo Zabolo alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá libanga oyo ekóma limpa.”  Kasi Yesu ayanolaki ye: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika kaka na mampa te.’”+  Bongo Zabolo amatisaki ye na esika moko na likoló mpe alakisaki ye na mwa ntango moke makonzi nyonso ya mokili.+  Bongo alobaki na ye: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpo bapesá ngai yango,+ mpe napesaka yango na moto oyo nalingi.  Na yango, soki osali likambo moko ya losambo liboso na ngai, yango nyonso ekozala ya yo.”  Yesu azongiselaki ye: “Ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova* Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”+  Na nsima amemaki ye na Yerusaleme mpe atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo,* mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse.+ 10  Mpo ekomamá ete: ‘Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpo na kobatela yo,’ 11  mpe, ‘Bakomema yo na mabɔkɔ na bango, mpo lokolo na yo etutana na libanga te.’”+ 12  Yesu azongiselaki ye: “Elobamá ete: ‘Osengeli te komeka Yehova* Nzambe na yo.’”+ 13  Na yango Zabolo, lokola asilisaki komeka ye na ndenge nyonso wana, atikaki ye tii na ntango mosusu ya malamu.+ 14  Bongo Yesu azongaki na Galile, atondi na nguya ya elimo.+ Mpe bato bazalaki koloba malamu mpo na ye bipai nyonso na etúká yango. 15  Lisusu, abandaki koteya na basinagoga na bango mpe bato nyonso bazalaki kokumisa ye. 16  Na nsima akendaki na Nazarete,+ esika abɔkwamaki; mpe ndenge amesanaki kosala na mokolo ya sabata, akɔtaki na sinagoga,+ mpe atɛlɛmaki mpo na kotánga. 17  Bongo bapesaki ye rulo ya mosakoli Yisaya, afungolaki rulo yango mpe azwaki esika oyo ekomamá ete: 18  “Elimo ya Yehova* ezali likoló na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nayebisa babola nsango malamu. Atindi ngai mpo nasakwela bakangami bonsomi mpe bato oyo bakufá miso ete bakomona lisusu, mpo napesa bato oyo bazali konyokwama* bonsomi,+ 19  mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.”*+ 20  Bongo alíngaki rulo yango, azongiselaki yango mosaleli mpe afandaki. Mpe miso ya baoyo nyonso bazalaki na sinagoga ezalaki kaka kotala ye. 21  Bongo abandaki koloba na bango: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”+ 22  Mpe bango nyonso babandaki koloba malamu mpo na ye mpe kokamwa na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye,+ mpe bazalaki koloba: “Oyo mwana ya Yozefe te?”+ 23  Bongo alobaki na bango: “Na ntembe te bokosalela maloba oyo epai na ngai: ‘Monganga, omibikisa yo moko. Makambo oyo toyokaki ete osalaki na Kapernaume,+ salá yango mpe awa na mboka na yo.’” 24  Bongo alobaki: “Nayebisi bino ya solo ete mosakoli moko te bandimaka ye na mboka na ye.+ 25  Na ndakisa, nayebisi bino solo: Basi oyo mibali bakufá bazalaki mingi na Yisraele na mikolo ya Eliya ntango likoló ekangamaki mbula misato ná sanza motoba, mpe nzala monene ekɔtaki na mokili yango mobimba.+ 26  Atako bongo Eliya atindamaki epai ya moko ya basi yango te, kasi kaka epai ya mwasi moko oyo mobali akufá, na Zarefate na mokili ya Sidone.+ 27  Lisusu, bato mingi ya maba bazalaki na Yisraele na ntango ya mosakoli Elisha. Atako bongo moko te kati na bango apɛtolamaki,* kaka Naamane moto ya Siri.”+ 28  Ntango bayokaki makambo wana, bato nyonso oyo bazalaki na sinagoga batondaki na nkanda.+ 29  Batɛlɛmaki mpe babimisaki ye nokinoki na libándá ya engumba, mpe bamemaki ye na nsɔngɛ ya ngomba epai engumba na bango etongamaki, mpo bábwaka ye motó na nse. 30  Kasi alekaki na katikati na bango mpe akobaki nzela na ye.+ 31  Na nsima, akitaki na Kapernaume, engumba moko ya Galile. Mpe azalaki koteya bango na Sabata.+ 32  Mpe bato bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya,+ mpo azalaki koloba na nguya. 33  Nzokande, ezalaki na moto moko na sinagoga oyo azalaki na elimo moko, demo moko ya mbindo, mpe agangaki na mongongo makasi:+ 34  “Aa! Biso ná yo likambo nini, Yesu moto ya Nazarete?+ Oyei nde koboma biso? Nayebi yo malamu: ozali Mosantu ya Nzambe.”+ 35  Kasi Yesu apamelaki elimo yango ete: “Fandá nyɛɛ, mpe bimá na nzoto na ye.” Bongo, demo yango akweisaki moto yango na mabele na katikati na bango, na nsima, abimaki kati na moto yango kozanga kosala ye mabe. 36  Na yango, bango nyonso bakamwaki, mpe balobanaki bango na bango: “Oyo ezali liloba ya ndenge nini? Mpo azali kopesa bilimo ya mbindo mitindo na bokonzi mpe na nguya, mpe ezali kobima!” 37  Bongo nsango na ye ezalaki se kopalangana bipai nyonso na etúká yango. 38  Nsima ya kobima na sinagoga akɔtaki na ndako ya Simo. Nzokande, mama-bokilo ya Simo azalaki na fiɛvrɛ makasi, mpe basɛngaki Yesu asalisa ye.+ 39  Bongo agunzamaki epai na ye, apamelaki fiɛvrɛ yango, mpe esilaki. Na mbala moko atɛlɛmaki mpe abandaki kosalela bango. 40  Kasi ntango moi ezalaki kolala, baoyo nyonso bazalaki na bato oyo bazalaki kobɛla maladi ndenge na ndenge bamemelaki ye bango. Atyelaki mokomoko na bango mabɔkɔ mpe abikisaki bango.+ 41  Bademo mpe babimaki na nzoto ya bato mingi, bazalaki koganga mpe koloba: “Ozali Mwana ya Nzambe.”+ Kasi azalaki kopamela bango, azalaki kopekisa bango báloba,+ mpo bayebaki ete ye azali Kristo.+ 42  Nzokande, ntango ntɔngɔ etanaki, abimaki mpe akendaki na esika oyo bato bazalaka te.+ Kasi ebele ya bato wana babandaki kolukaluka ye mpe bakómaki tii epai azalaki, mpe balukaki kopekisa ye mpo alongwa te epai na bango. 43  Kasi alobaki na bango: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”+ 44  Na yango, akendaki kosakola na basinagoga ya Yudea.

Maloba na nse

Talá Ap. A5.
To, “esika oyo eleki likoló na tempelo.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “bato oyo batutami.”
Talá Ap. A5.
To, “abikisamaki.”