Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Yesu asekwisaki mpenza bato?

Yesu asekwisaki Lazare oyo asalaki mikolo minei na lilita

Biblia elobi polele ete Yesu asekwisaki bato. Masolo yango ezali masapo te; esalemaki na esika mpe ntango oyo eyebani. Na ndakisa, na eleko ya molunge ya mobu 31 ya ntango na biso, ebele ya bato basalaki mobembo elongo na Yesu kolongwa Kapernaume tii Naine. Ntango bakómaki kuna, bakutaki ebele ya bato mosusu. Okoki kondima ete lisolo ya lisekwa oyo esalemaki na nsima ezalaki mpenza solo mpo ekomami na Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe esalemaki na miso ya bato wana nyonso.​—Tángá Luka 7:11-15.

Yesu asekwisaki mpe moninga na ye Lazare oyo asalaki mikolo minei na lilita. Okoki kondima lisolo yango mpo esalemaki mpe na miso ya bato ebele.​—Tángá Yoane 11:39-45.

Mpo na nini Yesu asekwisaki bato?

Motema mawa nde ezalaki kotinda Yesu asekwisa bato. Asalaki mpe bongo mpo na komonisa ete Tata na ye, Mozalisi ya bomoi apesaki ye bokonzi likoló ya liwa.​—Tángá Yoane 5:21, 28, 29.

Ndenge oyo Yesu asekwisaki bato etindi biso tótyela makambo oyo alaki mpo na mikolo ezali koya motema. Akosekwisa ebele mpenza ya bato, ata mpe baoyo bazangi boyengebene, oyo bayebaki eloko te mpo na Nzambe ya solo. Bato yango bakozwa libaku ya koyeba mpe kolinga Yehova Nzambe.​—Tángá Misala 24:15.