Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 2)

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 2)

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Cameron azongi kotala mobali moko na nkombo Jon.

NDƆTƆ YA NEBUKADENEZARE​—BOZONGELI YA MOKUSE

Cameron: Jon, nasepeli kokutana na yo lisusu. Nasepelaka na programɛ na biso ya boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. * Boni sante?

Jon: Nazali malamu.

Cameron: Nasepeli lokola ozali malamu. Mbala oyo eleki, tolobelaki ntina oyo Batatoli ya Yehova balobaka ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914. * Ndenge tomonaki yango, likambo moko oyo etindi biso tóndima yango ezali esakweli oyo ezali na Danyele mokapo 4. Ozali lisusu koyeba oyo mokapo yango elobaki?

Jon: Elobelaki nzete moko ya monene oyo mokonzi Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ.

Cameron: Ɛɛ, ezali mpenza bongo. Na ndɔtɔ na ye, Nebukadenezare amonaki nzete moko ya monene oyo molai na yango ekómaki tii na likoló. Ayokaki anzelu moko ya Nzambe azali kopesa mitindo ete bákata nzete yango, kasi ekumu ná misisa na yango esengelaki kotikala na mabele. Nsima ya “ntango nsambo,” nzete yango esengelaki kokola lisusu. * Tomonaki mpe mpo na nini esakweli yango esengelaki kokokisama mbala mibale. Ozali koyeba lisusu kokokisama na yango ya liboso?

Jon: Ezali likambo moko oyo ekómelaki Nebukadenezare ye moko, boye te? Akómaki moto ya ligboma na boumeli ya mbula nsambo.

Cameron: Ezali bongo. Nebukadenezare akómaki moto ya ligboma mpo na mwa ntango, yango wana boyangeli na ye esukaki. Kasi, na kokokisama ya monene ya esakweli yango, boyangeli ya Nzambe esengelaki kokatana na boumeli ya ntango nsambo. Ndenge tomonaki yango, ntango nsambo ebandaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso, ntango Yerusaleme ebebisamaki. Kobanda ntango wana, ezalaki lisusu na mokonzi moko te awa na mabele oyo azalaki komonisa boyangeli ya Yehova Nzambe. Nzokande, na nsuka ya ntango nsambo, Nzambe asengelaki kopona Mokonzi moko ya sika mpo ayangela bato na ye, kasi moto ya mabele te. Na maloba mosusu, nsuka ya ntango nsambo esengelaki komonisa ete Bokonzi ya Nzambe na likoló ebandi koyangela. Touti komona ntango nini ntango nsambo yango ebandaki. Na yango, soki toyebi ntango oyo yango eumelaki, boye tokoyeba ntango nini Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela. Ozali kolanda ngai malamu?

Jon: Ɛɛ, bozongeli oyo esalisi ngai nazongisa lisusu makambo yango na makanisi.

Cameron: Malamu. Sikoyo tóbanda lisolo na biso mpe tótala soki ntango nsambo yango eumelaki mbula boni. Nautaki kotánga lisolo yango mpo nazongisa lisusu na makanisi makambo ya ntina ya esakweli yango. Nameka naino kolimbolela yo yango.

Jon: OK.

NTANGO NSAMBO ESUKI​—MIKOLO YA NSUKA EBANDI

Cameron: Na kokokisama ya liboso oyo etalaki Nebukadenezare, ntango nsambo ezalaki mpenza mbula nsambo. Kasi, na kokokisama na yango ya monene oyo etaleli Bokonzi ya Nzambe, ntango nsambo esengeli koumela ntango molai koleka mbula nsambo.

Jon: Mpo na nini olobi bongo?

Cameron: Ya liboso, kobosana te ete ntango nsambo ebandaki ntango Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Soki tobandi kotánga mbula nsambo kobanda mobu wana, tokokóma na mobu 600 liboso ya ntango na biso. Kasi, ata likambo moko te ya ntina oyo etali Bokonzi ya Nzambe esalemaki na mobu yango. Longola yango, ndenge tolobelaki yango liboso, bambula mingi na nsima, ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete ntango nsambo yango ekómaki naino na nsuka te.

Jon: Ɛɛ, namoni lisusu.

Cameron: Na yango, na esika ezala mpenza mbula nsambo, ntango nsambo esengeli nde kozala eleko moko molai.

Jon: Tii ntango nini?

Cameron: Mokanda ya Emoniseli oyo ezali na boyokani na mokanda ya Danyele, esalisi biso tóyeba soki ntango nsambo eumelaki mpenza mbula boni. Elobeli eleko moko ya ntango misato ná ndambo oyo ezali na mikolo 1260. * Boye, ntango nsambo, elingi koloba ntango misato ná ndambo mbala mibale, epesi mikolo 2 520. Ozali kolanda ngai?

Jon: Ɛɛ, nazali kolanda yo. Kasi, nazali komona te ndenge nini yango emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.

Cameron: Malamu, tótala soki tokoki koyokanisa yango. Na bantango mosusu, na bisakweli ya Biblia, mokolo moko emonisaka mbula moko. * Soki totángi mokolo moko lokola mbula moko, ntango nsambo ekozala bambula 2 520. Soki totángi bambula 2 520 kobanda mobu 607 liboso ya ntango na biso, tokokóma na 1914. * Yango nde ndenge toyebá ete ntango nsambo esukaki na 1914 mpe Yesu abandaki koyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Yango ezali solo mpamba te kobanda 1914, makambo ya minene oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo ya nsuka ezali kokokisama na mokili.

Jon: Makambo ya ndenge nini?

Cameron: Tótalela makambo oyo Yesu alobaki na Matai 24:7. Mpo na ntango oyo akobanda koyangela na likoló, Yesu alobaki boye: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” Simbá ete Yesu asakolaki ete nzala mpe koningana ya mabele ekosalema na boumeli ya ntango yango. Makambo ya ndenge wana emonani mingi na siɛklɛ oyo eleki, boye te?

Jon: Ya solo.

Cameron: Na vɛrsɛ yango, Yesu asakolaki mpe ete bitumba ekozala na boumeli ya kozala na ye lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Mokanda ya Emoniseli esakolaki te bitumba oyo esalemaka na mwa bamboka, kasi nde bitumba oyo ekosalema na mabele mobimba na boumeli ya ntango ya nsuka. * Ozali koyeba lisusu ntango nini Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki?

Jon: Ezalaki na 1914, mbula wana kaka oyo olobaki ete Yesu abandaki koyangela! Nakanisá naino bongo liboso te.

Cameron: Soki tosangisi makambo wana nyonso esika moko, elingi koloba esakweli oyo elobeli ntango nsambo ná bisakweli mosusu oyo elobeli ntango ya nsuka, tokomona mpenza ete likambo yango ezali solo. Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete Yesu abandaki koyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na 1914, mpe ete mikolo ya nsuka ebandaki kaka na mbula yango. *

Jon: Nazali naino komeka kokanga ntina ya makambo wana nyonso.

Cameron: Nazali mpenza komitya na esika na yo. Ndenge nalobaki yango liboso, ezwaki ngai mpe ntango mpo nakanga ntina na yango malamumalamu. Kasi, na ntembe te, nakanisi ete lisolo na biso esalisi yo omona ete ata soki dati 1914 ezali na Biblia te, makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka mpo na dati yango eutaka mpenza na Biblia.

Jon: Ɛɛ, bokamwisaka ngai mpenza, bolobaka likambo moko te kozanga komonisa yango na Biblia. Ezalaka makanisi na bino moko te. Kasi, nazali komituna mpo na nini ezali mpasi ndenge wana. Mpo na nini Nzambe ayebisi biso kaka mbala moko te na Biblia ete Yesu akobanda koyangela na likoló na 1914?

Cameron: Jon, otuni motuna moko malamu mpenza. Kutu, ezali na makambo ebele na Biblia oyo elimbolami polele te. Na yango, mpo na nini Nzambe akomisaki Biblia na lolenge oyo ezali kosɛnga bato básala milende mpo na kokanga ntina na yango? Ntango mosusu, tokolobela yango na mbala oyo nakoya.

Jon: Nakosepela mingi.

Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli ya Yehova moko. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

^ par. 5 Mbala mingi, Batatoli ya Yehova basololaka masolo ya Biblia na nzela ya programɛ ya koyekola na bato Biblia ofele.

^ par. 24 Talá etanda “Nzete oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ.”

^ par. 30 Talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.