Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tosengeli nde kobondela Yesu?

Tosengeli nde kobondela Yesu?

MOTO moko asalaki ankɛtɛ epai ya bilenge 800 oyo basambelaka na mangomba ndenge na ndenge mpo na kotuna bango soki bandimaka ete Yesu ayanolaka mabondeli na bango. Bilenge yango mingi (60 %) bandimaki mpenza ete ayanolaka mabondeli na bango. Kasi, moko na bango alongolaki nkombo Yesu na papye ya ankɛtɛ yango mpe akomaki “Nzambe.”

Okanisi nini? Tosengeli kobondelaka Yesu to Nzambe? * Mpo na kozwa eyano, tótala naino ndenge Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka.

YESU ATEYAKI BISO TÓBONDELAKA NANI?

Yesu ateyaki mpe amonisaki biso moto oyo tosengeli kobondela.

Ndenge azalaki kobondela Tata na ye ya likoló, Yesu atikelá biso ndakisa oyo tosengeli kolanda

MATEYA NA YE: Ntango moyekoli na ye moko alobaki na Yesu ete “Nkolo, teyá biso kobondela,” Yesu ayanolaki boye: “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata.’” (Luka 11:1, 2) Lisusu, na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alendisaki bato oyo bazalaki koyoka ye bábondelaka. Alobaki boye: “Bondelá Tata na yo.” Akitisaki mpe bango motema na moloba oyo: “Tata na bino ayebi makambo oyo bozali na bosɛnga na yango liboso kutu bósɛnga ye.” (Matai 6:6, 8) Na butu na ye ya nsuka awa na mabele, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.” (Yoane 16:23) Na yango, Yesu ateyaki biso tóbondelaka Yehova Nzambe, oyo azali Tata na ye mpe Tata na biso.​—Yoane 20:17.

NDAKISA NA YE: Kaka ndenge ateyaki basusu bábondelaka, Yesu mpe abondelaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele.” (Luka 10:21) Na libaku mosusu, “Yesu atombolaki miso na likoló mpe alobaki ete: ‘Tata, natɔndi yo na ndenge oyoki ngai.’” (Yoane 11:41) Mpe ntango alingaki kokata motema, Yesu abondelaki boye: “Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.” (Luka 23:46) Ndenge azalaki kobondela Tata na ye ya likoló; elingi koloba “Nkolo ya likoló mpe ya mabele,” Yesu atiká ndakisa oyo bato nyonso basengeli kolanda. (Matai 11:25; 26:41, 42; 1 Yoane 2:6) Bayekoli ya liboso ya Yesu bakangaki ntina ya malako na ye?

BAKRISTO YA LIBOSO BAZALAKI KOBONDELA NANI?

Mwa bapɔsɔ nsima ya kozonga ya Yesu na likoló, batɛmɛli bakómaki kotungisa mpe kobangisa bayekoli na ye. (Misala 4:18) Babondelaki mpo na kosɛnga lisalisi, kasi babondelaki nani? “Batombolaki mingongo na bango na bomoko mpenza epai ya Nzambe,” babondelaki ete akoba kosalisa bango “na nkombo ya mosaleli na [ye] mosantu Yesu.” (Misala 4:24, 30) Na yango, bayekoli balandaki malako ya Yesu na ntina etali libondeli. Babondelaki nde Nzambe, kasi Yesu te.

Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo amonisaki lolenge oyo ye ná baninga na ye babondelaki. Ntango akomelaki baninga na ye bakristo, alobaki boye: “Topesaka ntango nyonso Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo matɔndi ntango tobondelaka mpo na bino.” (Bakolose 1:3) Paulo akomelaki mpe baninga na ye bakristo ete ‘na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo, bápesaka Nzambe mpe Tata na bango matɔndi ntango nyonso mpo na makambo nyonso.’ (Baefese 5:20) Na maloba wana, tomoni ete Paulo alendisaki basusu bábondelaka ‘Nzambe mpe Tata mpo na makambo nyonso,’ kasi na nkombo ya Yesu.​—Bakolose 3:17.

Ndenge moko na bakristo ya liboso, tokoki komonisa bolingo na biso epai ya Yesu soki tozali kolanda toli na ye na likambo etali kobondela. (Yoane 14:15) Ntango tozali kobondela kaka Tata na biso ya likoló, maloba oyo ya Nzembo 116:1, 2 ekokóma na ntina mingi mpo na biso: “Nalingaka mpenza ntango Yehova ayokaka mongongo na ngai . . . Mikolo na ngai nyonso, nakobenga.” *

^ par. 3 Biblia emonisi ete Nzambe ná Yesu bakeseni. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 4 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 11 Mpo Nzambe andima mabondeli na biso, tosengeli kosala makambo oyo asɛngaka. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 17 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?