Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOSEPELA KOYEKOLA BIBLIA?

Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso

Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso

Batatoli ya Yehova bayebani mpo na mosala na bango ya kosakola. Kasi, oyebi ete na mokili mobimba, tozalaka mpe na programɛ ya koyekola na bato Biblia?

Na 2014, Batatoli ya Yehova koleka 8 000 000, na mikili 240 bayekolaki Biblia na bato soki 9 500 000 sanza nyonso. * Kutu, motángo ya bato oyo bayekolaka na biso Biblia eleki motángo ya bato ya bikólo soki 140!

Mpo na kokokisa mosala yango, Batatoli ya Yehova babimisaka mbula nyonso miliare moko na ndambo ya Babiblia, babuku, bazulunalo mpe mikanda mosusu oyo esalisaka mpo na koyekola Biblia, na minɔkɔ soki 700! Milende nyonso wana ezalaka mpo na kosalisa bato báyekola Biblia na monɔkɔ oyo balingi.

BIYANO YA MITUNA OYO BATO BAMITUNAKA MPO NA PROGRAMƐ NA BISO YA KOYEKOLA BIBLIA

Boyekoli yango esalemaka ndenge nini?

Tozwaka masolo ndenge na ndenge ya Biblia mpe totalelaka bavɛrsɛ oyo eyokani na masolo yango. Na ndakisa, Biblia epesi biyano na mituna lokola oyo: Nzambe azali nani? Azalaka ndenge nini? Azali na nkombo? Afandaka wapi? Tokoki kopusana penepene na ye? Mokakatano ezali nde ya koyeba bavɛrsɛ nini ya Biblia epesi biyano na mituna yango.

Mpo na kosalisa bato bázwa biyano, tosalelaka mingi buku Biblia eteyaka mpenza nini? * Buku yango ya nkasa 224 ebongisami mpo na kosalisa bato bákanga ntina ya mateya ya ebandeli ya Biblia. Ezali na masolo etali Nzambe, Yesu Kristo, bampasi ya bato, lisekwa, libondeli mpe masolo mingi mosusu.

Ntango nini mpe esika nini boyekoli yango esalemaka?

Boyekoli ekoki kosalema na ngonga mpe na esika oyo olingi.

Boyekoli yango eumelaka ngonga boni?

Bato mingi bapesaka ngonga moko to koleka pɔsɔ nyonso mpo na koyekola Biblia. Boyekoli nyonso eumelaka ngonga ndenge moko te. Tokoki kosala yango na kolanda programɛ na yo. Bato mosusu bapesaka miniti 10 to 15 mpo na koyekola Biblia pɔsɔ nyonso.

Bafutaka mbongo boni mpo na boyekoli yango?

Mateya ná mikanda oyo esalisaka mpo na koyekola Biblia ezalaka ya ofele. Yango eyokani na maloba oyo ya Yesu epai ya bayekoli na ye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.

Boyekoli yango eumelaka mbula boni?

Yango etali kaka yo. Buku Biblia eteyaka mpenza nini? ezali na mateya 19. Okoki kosilisa koyekola liteya to mateya na yango nyonso na boumeli ya ntango oyo ebongi mpo na yo.

Esengeli kaka nakóma Motatoli ya Yehova?

Te. Na limemya nyonso tondimaka lotomo ya moto ya kopona makambo oyo akondima to te. Kasi, moto oyo akómi na boyebi ya mateya ya ebandeli ya Biblia akoki kopona malamu lingomba na ye.

Nakoki koyeba makambo mosusu wapi?

Site Internet jw.org ezali na bansango ya solosolo oyo etali mateya mpe misala ya Batatoli ya Yehova.

Ndenge nini nakoki kosɛnga boyekoli ya Biblia?

  • Sɛngá boyekoli yango na site www.ps8318.com.

  •  
  • Kutáná na Batatoli ya Yehova ya esika ofandi. Okoki koluka “Batatoli ya Yehova” na liste ya banimero ya telefone ya esika ofandaka.

^ par. 4 Mbala mingi, toyekolaka Biblia na moto ye moko to na mwa etuluku ya bato.

^ par. 9 Ebimisami na Batatoli ya Yehova. Milio koleka 230 ya babuku yango ebimisami na minɔkɔ koleka 260.